Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kokumba ekulusu

Bavɛrsɛ 15 ya Biblia na ntína ya Kokumba ekulusu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Matayo 16:24

Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.

02 Luka 9:23

Bongo Yesu alobaki na bango nyonso: — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya, kokamata ekulusu na ye mokolo na mokolo mpe kolanda Ngai.

03 Bagalatia 2:20

boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.

04 Malako 8:34

Yesu abengaki ebele ya bato mpe bayekoli na Ye, alobaki na bango: — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.

05 Bafilipi 3:10

Posa monene ya motema na ngai ezali: koyeba Klisto, koyeba nguya ya lisekwa na Ye, kosangana na pasi na Ye, kokokana na Ye kati na kufa na Ye

06 Luka 14:27

Mpe moto nyonso oyo amemaka ekulusu na ye te mpe alandaka Ngai te akoki te kozala moyekoli na Ngai.

07 Matayo 10:38

Moto nyonso oyo amemaka ekulusu na ye te mpo na kolanda Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.

08 Barome 6:6

Pamba te toyebi malamu ete bomoto ya kala ebakamaki na ekulusu elongo na Klisto mpo ete nzoto na biso lokola esalelo ya lisumu ekufa mpe tozala lisusu bawumbu ya lisumu te.

09 1 Petelo 2:21

Nzambe abengaki bino na komona pasi yango, pamba te Klisto mpe amonaki pasi mpo na bino; boye atikelaki bino ndakisa mpo ete bolanda banzela na Ye.

10 Barome 8:17

Mpe soki tozali bana, tozali mpe bakitani ya libula: tozali bakitani ya libula ya Nzambe, mpe bakitani ya libula elongo na Klisto, soki penza tozali komona pasi elongo na Ye mpo ete tozwa mpe nkembo elongo na Ye.

11 2 Timote 2:11-12

Maloba oyo ezali ya solo: Soki tokufi elongo na Ye, tokozala mpe na bomoi elongo na Ye. Soki toyiki mpiko, tokokonza mpe elongo na Ye. Kasi soki towangani Ye, Ye mpe akowangana biso;

12 Luka 9:24

Pamba te, moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai akobikisa yango.

13 Malako 10:21

Yesu atalaki ye, asepelaki na ye mingi mpe alobaki na ye: — Ozangi eloko moko kaka: kende, teka biloko na yo nyonso mpe pesa mbongo oyo okozwa epai ya babola; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.

14 Bakolose 1:24

Nazali sik’oyo kosepela na pasi oyo nazali komona mpo na bino; pamba te pasi oyo Klisto atikalaki komona te, ngai nazali kokokisa yango kati na nzoto na ngai mpo na bolamu ya nzoto na Ye, oyo ezali Lingomba.

15 Matayo 16:25

Pamba te moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai akozwa yango lisusu.

Bantína oyo etali