Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Botosi eleki mbeka
Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Botosi eleki mbeka mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Samuele alobaki: — Boni, Yawe asepelaka mingi na bambeka ya kotumba mpe na makabo koleka kotosa mongongo na Ye? Te! Botosi eleki mbeka; koyoka eleki mafuta ya meme ya mobali.
Pamba te nasepelaka na boboto koleka mbeka, mpe na boyebi ya Nzambe koleka mbeka ya kotumba.
Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu. Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo: Tambola na bosembo, linga boboto mpe tambola elongo na Nzambe na yo na komikitisa.
Oh Nzambe! Nzambe, Mobikisi na ngai, kangola ngai wuta na mokumba ya makila, mpe lolemo na ngai ekosakola bosembo na Yo. Nkolo, fungola bibebu na ngai, mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.
Bokende koyekola tina ya maloba oyo: « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » pamba te nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.