Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kosala mokano ya Nzambe

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Kosala mokano ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Matayo 7:21

Bato nyonso oyo balobaka na Ngai: ‹ Nkolo! Nkolo! › bakokota te na Bokonzi ya Likolo, kaka bato oyo basalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.

02 Barome 12:2

Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.

03 1 Batesalonika 4:3

Nzambe alingi ete bozalaka bule tango nyonso: bokimaka pite;

04 Ba-Efeso 6:6

na miso na bango kaka te, lokola nde bozali koluka kosepelisa bato, kasi lokola bawumbu ya Klisto, oyo bazali kosala mokano ya Nzambe wuta na mitema na bango.

05 Ba-Ebre 13:21

apesa bino makoki ya kosalaka bolamu ya lolenge nyonso mpo na kokokisa mokano na Ye, mpe asala kati na biso makambo nyonso oyo esepelisaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto! Tika ete nkembo ezonga epai na Ye, mpo na libela na libela! Amen!

06 Malako 3:35

Moto nyonso oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.

07 Yoane 7:17

Moto nyonso oyo azwi mokano ya kosala makambo oyo Nzambe alingaka, akososola soki mateya na Ngai ewuti na Nzambe to nazali koloba na ndenge na Ngai moko.

08 Bakolose 1:9-10

Yango wana, wuta mokolo oyo toyokaki sango na tina na bino, totikaka te kobondela mpo na bino mpe kosenga na Nzambe ete atondisa bino na boyebi ya mokano na Ye, na bwanya nyonso mpe na bososoli oyo Molimo apesaka, mpo ete bozala na bizaleli oyo ebongi liboso ya Nkolo, mpo ete bosepelisa Ye na nyonso, mpo ete bobota bambuma na nzela ya lolenge nyonso ya misala na bino ya malamu, mpo ete bokola kati na boyebi ya Nzambe,

09 1 Yoane 2:17

Mokili mpe baposa na yango ezali koleka, kasi moto oyo asalaka mokano ya Nzambe awumelaka tango nyonso.

10 Banzembo 40:8

Bongo nalobaki: « Ngai oyo, nayei epai na Yo kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku.

11 1 Petelo 4:2

mpo ete botambola te kolanda baposa mabe ya nzoto, kasi kolanda mokano ya Nzambe, na mikolo oyo botikali na yango ya kobika awa na mokili.

Bantína oyo etali