Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Tambola na bolingo

Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Tambola na bolingo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ba-Efeso 5:2

Botambolaka na bolingo, ndenge kaka Klisto alingaki biso mpe amikabaki mpo na biso epai ya Nzambe lokola likabo mpe mbeka ya solo kitoko.

02 1 Yoane 4:16

Mpe biso toyebi mpe tozali na kondima kati na bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso. Nzambe azali bolingo, mpe moto oyo abikaka kati na bolingo abikaka kati na Nzambe, mpe Nzambe abikaka kati na ye.

03 Ba-Efeso 4:2

bozalaka tango nyonso bato oyo batondi na komikitisa, na boboto mpe na motema molayi; boyikanaka mpiko kati na bolingo,

04 1 Bakolinto 16:14

Bosalaka makambo nyonso na bolingo.

05 Yoane 13:35

Ezali na nzela ya bolingo oyo bokotalisana bino na bino nde bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na Ngai.

06 Barome 13:10

Moto oyo azali na bolingo asalaka moninga na ye mabe te. Boye, kolinga moninga, yango nde kokokisa Mobeko nyonso.

07 1 Yoane 4:7-8

Balingami na ngai, tolinganaka biso na biso, pamba te Nzambe azali bolingo. Moto nyonso oyo azali na bolingo azali ya Nzambe mpe ayebi Nzambe. Moto oyo azangi bolingo ayebi Nzambe te, pamba te Nzambe azali bolingo.

08 Bakolose 3:14

Na likolo ya makambo oyo nyonso, bolataka bolingo oyo ekangisaka nyonso kati na bomoko ya kokoka.

09 1 Bakolinto 13:4-5

Bolingo ekangaka motema, bolingo etondi na boboto. Bolingo elulaka te, emikumisaka te, emitondisaka na lolendo te, ebebisaka lokumu ya bato mosusu te, elukaka bolamu na yango moko te, esilikaka te, ebosanaka mabe.

10 Bagalatia 5:13

Bandeko na ngai, Nzambe abenga bino mpo ete bozala bansomi. Kasi tika ete bonsomi yango ekoma te mpo na bino libaku malamu ya kotambola kolanda baposa ya nzoto. Nzokande, na nzela ya bolingo, bosunganaka bino na bino.

11 Barome 12:9-10

Tika ete bolingo ezalaka na lokuta te! Boyinaka makambo mabe, bokangamaka makasi na makambo malamu. Mpo na oyo etali bondeko, bolinganaka makasi kati na bino; mpo na oyo etali lokumu, bozalaka bato ya liboso ya kopesa yango na bato mosusu;

12 1 Batesalonika 3:12

Tika ete Nkolo abakisa mpe afulukisa bolingo kati na bino mpo ete bolinganaka, bamoko na bamosusu, mpe mpo ete bolingaka bato nyonso, ndenge kaka biso mpe tolingaka bino.

13 2 Yoane 1:6

Mpe tala makambo oyo bolingo esengaka: kobika kolanda mibeko ya Nzambe. Yango nde mobeko oyo tosengeli kotosa, ndenge boyokaki yango wuta na ebandeli, mpo ete bobika kati na bolingo.

Bantína oyo etali