Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kitoko ya bosantu

Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Kitoko ya bosantu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 96:9

Bogumbama liboso ya Yawe oyo bosantu na Ye ezali kongenga makasi! Bino bavandi ya mokili mobimba, bolenga liboso na Ye!

02 Banzembo 27:4

Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe, eloko moko kaka oyo nasengaka makasi: nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe, mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.

03 1 Masolo ya Kala 16:29

Bosanzola Yawe mpe bopesa Kombo na Ye nkembo! Bomema makabo mpe boya liboso na Ye, bogumbamela Yawe mpo na kongenga ya bosantu na Ye!

04 Banzembo 29:2

Bopesa Yawe nkembo oyo ekoki na lokumu ya Kombo na Ye; bogumbamela Yawe kati na kongenga ya bosantu na Ye.

05 Banzembo 90:17

Tika ete boboto ya Nkolo, Nzambe na biso, ezala elongo na biso! Mpo na biso, sala ete misala na biso ekende liboso! Iyo, sala ete misala na biso ekende kaka liboso!

06 2 Masolo ya Kala 20:21

Sima na ye kosolola na bato, Jozafati aponaki bayembi, atiaki bango liboso ya mampinga ya basoda, mpo na kokumisa Yawe mpe kotombola nkembo ya bosantu na Ye. Mpe batambolaki liboso ya mampinga ya basoda na koyemba: « Bosanzola Yawe, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko! »

07 Banzembo 96:6

Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye, nguya mpe nkembo ezali kati na Esika na Ye ya bule.

08 Banzembo 145:5

Nakolemba te kotatola bikamwa na Yo mpe kongenga makasi ya nkembo na Yo.

09 Banzembo 50:2

Wuta na Siona, mboka kitoko, Nzambe azali kongenga lokola moyi.

10 Ezayi 33:17

Miso na yo ekomona Mokonzi na kitoko na Ye nyonso mpe ekomona ndenge mokili ekenda kino na mosika.

11 Kobima 28:2

Okotonga mpo na Aron, ndeko na yo ya mobali, bilamba ya bule lokola elembo ya nkembo mpe ya lokumu.

12 Banzembo 110:3

Na mokolo oyo okotanda basoda na yo na molongo mpo na bitumba, bato na yo bakotonda na mpiko, bilenge basoda na yo nyonso bakoya na lombangu epai na yo ndenge mamwe ebimaka na tongo.

13 Zakari 9:17

Bakozala bato ya esengo, bakokoma kitoko makasi. Ble ekopesa bilenge mibali makasi mpe vino ya sika ekopesa bilenge basi makasi.

Bantína oyo etali