Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Ngolu oyo ekoki

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Ngolu oyo ekoki mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 2 Bakolinto 12:9

Kasi azongiselaki ngai: « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.

02 2 Bakolinto 12:10

Yango wana, na likambo oyo etali Klisto, ezala kati na bolembu, na kofingama, na kozanga, na minyoko to mpe na pasi oyo nakutanaka na yango, nasepelaka na ngai kaka; pamba te ezali na tango oyo nazalaka na bolembu nde natondaka na makasi.

03 Bafilipi 4:13

Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.

04 Ezayi 40:29

Apesaka makasi na bato oyo balembi mpe abakisaka nguya na bato oyo bazanga nguya.

05 2 Bakolinto 9:8

Nzambe azali mpe na makoki ya kotondisa bino na mapamboli ya ndenge na ndenge mpo ete, na tango nyonso mpe kati na makambo nyonso, bozala na nyonso oyo bozali na yango na bosenga mpe botonda lisusu na oyo bokosala na yango misala ya malamu ya lolenge nyonso,

06 Banzembo 73:26

Nzoto na ngai ekoki kobeba, mpe motema na ngai ekoki kolemba; kasi Nzambe azali Libanga mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.

07 2 Bakolinto 3:5

Tosengeli te kokanisa ete ezali na ndenge na biso moko nde tozwi makoki ya kosala likambo songolo; te, makoki na biso ewutaka nde na Nzambe.

08 Deteronomi 33:25

Bikangelo ya bikuke na yo ekozala ya bibende mpe ya bronze. Mpe tika ete makasi na yo ewumela ndenge mikolo na yo ezali.

09 Ba-Ebre 4:16

Boye, topusana na elikya nyonso pene ya Kiti ya Bokonzi ya ngolu mpo ete Nzambe ayokela biso mawa mpe tozwa ngolu, oyo ekosunga biso na tango oyo ekoki.

10 Bafilipi 4:19

Mpe Nzambe na ngai akokokisa baposa na bino kolanda bomengo ya nkembo na Ye kati na Yesu-Klisto.

11 Banzembo 84:11

Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.

Bantína oyo etali