Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nsango Malamu

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Nsango Malamu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Barome 1:16

Nazali na soni te mpo na Sango Malamu, pamba te ezali nguya ya Nzambe mpo na lobiko ya moto nyonso oyo andimaka: liboso, ya Moyuda, mpe sima, ya Mogreki.

02 1 Bakolinto 15:3-4

Liboso na nyonso, nateyaki bino mateya oyo ngai moko nazwaki: Klisto akufaki mpo na masumu na biso, kolanda Makomi; bakundaki Ye, mpe asekwaki na mokolo ya misato, ndenge Makomi elobaki yango liboso.

03 Malako 16:15

Alobaki na bango: — Bokende na mokili mobimba, mpe boteya bato nyonso Sango Malamu.

04 Barome 10:15

Mpe ndenge nini bakoki koteya soki batindami te? Kolanda ndenge ekomama: « Tala ndenge ezali kitoko, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu! »

05 2 Timote 1:10

Nzokande ngolu yango emonani sik’oyo na nzela ya koya ya Yesu-Klisto, Mobikisi na biso, oyo asilisaki nguya ya kufa mpe atalisaki bosolo ya bomoi ya seko na nzela ya Sango Malamu.

06 1 Bakolinto 1:18

Pamba te mateya ya ekulusu ezali liboma mpo na bato oyo bazali kobunga, kasi ezali nguya ya Nzambe mpo na biso oyo tobiki;

07 Bagalatia 1:8

Kasi soki moto moko, ezala biso to Anjelu moko kowuta na Likolo, ateyi bino sango malamu oyo ekeseni na Sango Malamu oyo biso toteyaki bino, wana tika ete Nzambe alakela ye mabe!

08 Barome 1:17

Pamba te Sango Malamu yango emonisaka biso bosembo ya Nzambe, oyo ezwamaka na nzela ya kondima, wuta na ebandeli kino na suka, kolanda ndenge ekomama: « Moto ya sembo akobika na nzela ya kondima. »

Bantína oyo etali