Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Ngolu likoló ya ngolu

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Ngolu likoló ya ngolu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Yoane 1:16

Lokola atonda na bolingo mpo na biso, apesaki biso ngolu likolo ya ngolu;

02 Yoane 1:14

Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.

03 Yoane 1:17

pamba te Mibeko eyaki na nzela ya Moyize, kasi ngolu mpe solo eyaki na nzela ya Yesu-Klisto.

04 Barome 5:20

Mobeko eyaki mpo ete lisumu ebotana. Kasi epai lisumu ebotanaki, ngolu efulukaki koleka

05 2 Bakolinto 9:8

Nzambe azali mpe na makoki ya kotondisa bino na mapamboli ya ndenge na ndenge mpo ete, na tango nyonso mpe kati na makambo nyonso, bozala na nyonso oyo bozali na yango na bosenga mpe botonda lisusu na oyo bokosala na yango misala ya malamu ya lolenge nyonso,

06 2 Bakolinto 12:9

Kasi azongiselaki ngai: « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.

07 Jake 4:6

Nzokande, Nzambe atalisaka biso ngolu oyo eleki, pamba te Makomi eloba: « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »

08 Ba-Efeso 1:7

Kati na Klisto, tozwi lisiko na nzela ya makila na Ye, mpe bolimbisi ya masumu, kolanda bomengo ya ngolu ya Nzambe

09 Ba-Efeso 2:7

mpo na kotalisa na bato ya bikeke oyo esengeli koya na sima, bomengo monene ya ngolu na Ye, oyo alakisaki kati na Yesu-Klisto na nzela ya boboto na Ye epai na biso.

10 1 Petelo 5:10

Kasi sima na bino komona pasi mpo na mwa tango moke, Nzambe ya ngolu nyonso, oyo abenga bino na nkembo na Ye ya seko kati na Yesu-Klisto, akokomisa bino bato ya kokoka, akolendisa bino, akopesa bino makasi mpe akotelemisa bino ngwi.

11 Tito 2:11

Pamba te ngolu ya Nzambe emonisami lokola etima ya lobiko mpo na bato nyonso.

Bantína oyo etali