Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Talela ngai, e Nzambe

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Talela ngai, e Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 139:23

Oh Nzambe, kundola mpe yeba mozindo ya motema na ngai, meka ngai mpe yeba makambo oyo ezali kotungisa ngai!

02 Banzembo 139:24

Tala soki nazali kotambola na nzela mabe mpe tambolisa ngai na nzela ya tango nyonso!

03 Banzembo 19:12

Epesaka mosali na Yo mayele; moto nyonso oyo atosaka yango azwaka litomba mingi.

04 Banzembo 51:10

Sepelisa ngai mpe yokisa ngai nsayi na motema; mpe mikuwa na ngai oyo obukaki ekosepela makasi.

05 Banzembo 26:2

Yawe, tala ngai malamu mpe meka ngai, sosola motema mpe makanisi na ngai,

06 Banzembo 7:9

Tika ete Yawe asambisa bikolo. Yawe, longisa ngai kolanda bosembo na ngai, kolanda bozangi pamela na ngai, Yo-Oyo-Oleki-Likolo.

07 Banzembo 17:3

Soki otali malamu motema na ngai, soki olandeli ngai ata na butu mpe omeki ngai, okomona ete nasalaki mabongisi ya mabe te, monoko na ngai ebukaki mobeko te.

08 Jeremi 17:10

« Ngai Yawe, nayebi motema mpe nasosolaka malamu makanisi na yango, mpo na kofuta moto na moto kolanda etamboli mpe misala na ye. »

09 1 Masolo ya Kala 28:9

Bongo, yo Salomo, mwana na ngai, yeba Nzambe ya tata na yo mpe salela Ye na motema na yo mobimba mpe na esengo; pamba te Yawe amonaka kino na bozindo ya mitema nyonso mpe asosolaka makanisi na yango nyonso. Soki oluki Ye, okomona Ye; kasi soki atiki Ye, akobwaka yo mpo na libela.

10 Banzembo 44:21

Soki tobosanaki Kombo ya Nzambe na biso to totombolaki maboko na biso epai ya nzambe ya mopaya,

11 Ba-Ebre 4:12

Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.

Bantína oyo etali