Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Komanyola

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Komanyola mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 1:2

kasi asepelaka na mibeko ya Yawe mpe akanisaka yango butu mpe moyi.

02 Jozue 1:8

Sala ete maloba ya buku oyo ya Mobeko ewumela tango nyonso na monoko na yo; tangaka mpe kanisaka yango butu mpe moyi, mpo ete osala kolanda nyonso oyo ekomami kati na yango. Na bongo nde okokende liboso mpe okolonga kati na misala na yo nyonso.

03 Banzembo 119:15

Nakanisaka malako na Yo mpe natambolaka na banzela na Yo.

04 Banzembo 19:14

Batela lisusu mosali na Yo mpo ete nasala mabe na nko te. Na bongo, nakozala moto ya kokoka mpe nakosala bambeba minene te.

05 Banzembo 143:5

Nakanisi mikolo ya kala, namilobeli nyonso oyo osala, nakanisi malamu mosala ya maboko na Yo.

06 Banzembo 119:97

Nalingaka mibeko na Yo mingi! Nakanisaka yango mikolo nyonso.

07 Banzembo 63:6

Nakotonda lokola moto oyo asili kolia misuni kitoko mpe mafuta; bibebu na ngai ekoganga na esengo mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.

08 Banzembo 77:12

Nakanisaka misala minene ya Yawe, bikamwa na Yo ya kala.

09 Bafilipi 4:8

Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.

10 Banzembo 104:34

Tika ete maloba na ngai esepelisa Ye! Tika ete Yawe azala esengo na ngai!

11 Banzembo 145:5

Nakolemba te kotatola bikamwa na Yo mpe kongenga makasi ya nkembo na Yo.

Bantína oyo etali