Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Makanisi ya malamu

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Makanisi ya malamu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 2 Timote 1:7

Pamba te Molimo oyo Nzambe apesa biso akomisaka biso te bato ya kobanga-banga, kasi apesaka biso makasi, bolingo mpe mayele.

02 Ezayi 26:3

Ndenge esila kokatama, ye oyo akomitika epai na Yo, okobatela ye na kimia, na kimia penza, mpo ete amipesi mobimba epai na Yo.

03 Bafilipi 4:7

Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Yesu-Klisto.

04 Barome 12:2

Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.

05 2 Bakolinto 10:5

tokweyisaka makanisi ya lokuta mpe nguya nyonso oyo etelemelaka boyebi ya Nzambe; tolongaka makanisi nyonso ya bomoto mpe tosalaka ete yango etosa Klisto.

06 Bafilipi 4:8

Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.

07 1 Bakolinto 14:33

Pamba te Nzambe azali Nzambe ya mobulu te, kasi Nzambe ya kimia. Ndenge esalemaka kati na Mangomba nyonso ya basantu,

08 Bakolose 3:2

bokanisaka biloko ya Likolo kasi biloko ya mokili te.

09 1 Petelo 1:13

Yango wana, boselingwa mpo na kosalela Nzambe lokola basali oyo balati bilamba ya mosala mpo na kosala; bomibatela malamu mpe botia elikya na bino mobimba kati na ngolu oyo bokozwa tango Yesu-Klisto akomonana.

Bantína oyo etali