Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mobulu ya makanisi
Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Mobulu ya makanisi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Pamba te Nzambe azali Nzambe ya mobulu te, kasi Nzambe ya kimia. Ndenge esalemaka kati na Mangomba nyonso ya basantu,
Pamba te esika oyo zuwa mpe koswana ezali, esika wana mpe mobulu ya lolenge nyonso mpe misala mabe ezalaka.
Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.
Ndenge esila kokatama, ye oyo akomitika epai na Yo, okobatela ye na kimia, na kimia penza, mpo ete amipesi mobimba epai na Yo.
Ndimela Yawe na motema na yo mobimba, mpe kotia motema te na mayele na yo. Yebaka Ye na banzela na yo nyonso, mpe Ye akokomisa yango alima.
Nakeyi, kasi natikeli bino kimia; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te!
Olobaki: « Nakopesa yo malako mpe nakolakisa yo nzela ya kolanda; nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo.
Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino, » elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.
Nazali kosala bongo mpo ete balendisama, bazala moko kati na bolingo, batonda na elikya oyo ewutaka na bososoli ya mabombami ya Nzambe, mpe batonda na boyebi ya mabombami yango; mabombami yango ezali Klisto. Ezali kati Klisto nde bomengo nyonso ya bwanya mpe ya boyebi ya Nzambe ebombami.