Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kokomisa makanisi ya sika

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Kokomisa makanisi ya sika mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Barome 12:2

Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.

02 Ba-Efeso 4:23

mpo ete Molimo akomisa mayele mpe makanisi na bino ya sika,

03 Bakolose 3:10

mpe bolataki bomoto ya sika oyo emikomisaka ya sika mpo ete bokoma na boyebi ya kokoka kolanda elilingi ya Mokeli ya bomoto yango.

04 Bafilipi 4:8

Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.

05 2 Bakolinto 5:17

Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika: makambo ya kala eleki, mpe makambo ya sika eyei.

06 Tito 3:5

abikisaki biso. Asalaki bongo mpo na bosembo na biso te, kasi mpo na mawa na Ye na nzela ya Molimo Mosantu oyo akomisaki biso bato ya sika na mokolo ya mbotama na biso ya mibale.

07 Ba-Efeso 4:22-24

mpo ete bobwaka etamboli na bino ya kala, etamboli ya bomoto na bino ya kala, oyo ebebaka na nzela ya baposa ya lokuta, mpo ete Molimo akomisa mayele mpe makanisi na bino ya sika, mpe mpo ete bolata bomoto ya sika oyo ekelami kolanda Nzambe, kati na bosembo mpe bosantu ya bosolo.

08 1 Petelo 1:13

Yango wana, boselingwa mpo na kosalela Nzambe lokola basali oyo balati bilamba ya mosala mpo na kosala; bomibatela malamu mpe botia elikya na bino mobimba kati na ngolu oyo bokozwa tango Yesu-Klisto akomonana.

Bantína oyo etali