Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nzoto moko, binama ebele

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Nzoto moko, binama ebele mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Bakolinto 12:12

Nzoto ezali kaka moko, kasi ezali na biteni ebele; mpe atako motango na yango ezali ebele, kasi ezali kosala kaka nzoto moko. Ezali mpe bongo mpo na Klisto.

02 1 Bakolinto 12:13

Solo, biso nyonso tobatisamaki kati na Molimo moko mpo na kosala nzoto moko: ezala Bayuda to Bagreki, ezala bawumbu to bansomi. Mpe epesamelaki biso nyonso komela Molimo wana se moko.

03 1 Bakolinto 12:27

Nzokande bino, bozali nzoto ya Klisto, mpe moko na moko kati na bino azali eteni ya nzoto yango ya Klisto.

04 Barome 12:4-5

Pamba te ndenge kaka moko na moko kati na biso azali na biteni ebele kati na nzoto na ye, mpe eteni moko na moko ezalaka na mosala na yango, ndenge wana mpe tozali nzoto moko kati na Klisto atako tozali ebele, mpe moko na moko kati na biso azalaka eteni ya nyonso mosusu.

05 Ba-Efeso 4:16

Ezali na nguya na Ye nde nzoto mobimba ekolaka mpe emitongaka kati na bolingo, wana esili kokangana malamu mpe kokoma moko na nzela ya misisa oyo epesaka yango bilei, mpo na kopesa na eteni moko na moko nzela ya kosala mosala na yango na ndenge ekoki.

06 1 Bakolinto 12:14

Nzoto ezali na eteni moko te, kasi ezali na biteni ebele.

07 1 Bakolinto 12:18

Kasi Nzambe atiaki biteni kati na nzoto, mpe amonaki ete ezali malamu mpo na eteni moko na moko kozala na mosala na yango.

08 1 Bakolinto 12:25

asalaki bongo mpo ete bokabwani ezala te kati na nzoto, kasi mpo ete biteni na yango esunganaka.

09 Barome 12:5

ndenge wana mpe tozali nzoto moko kati na Klisto atako tozali ebele, mpe moko na moko kati na biso azalaka eteni ya nyonso mosusu.

10 Bakolose 3:15

Tika ete kimia ya Klisto ekonzaka kati na mitema na bino, pamba te bozali biteni ya nzoto moko mpe Nzambe abenga bino mpo ete bozala na kimia yango; mpe bozongisaka matondi.

11 Ba-Efeso 4:25

Yango wana, tika ete moko na moko kati na bino abwaka lokuta mpe alobaka solo na moninga na ye, pamba te biso nyonso tozali kaka biteni ya nzoto moko.

Bantína oyo etali