Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Linga moninga na yo
Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Linga moninga na yo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Tala mobeko oyo elandi: « Okolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. » Mobeko ya motuya koleka mibeko wana mibale ezali te.
Okozongisa mabe na mabe te to okobombela moko kati na bato na yo kanda te, kasi okolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. Nazali Yawe.
Molakisi ya mibeko azongisaki: — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makasi na yo nyonso mpe na makanisi na yo nyonso; mpe linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.
Pamba te Mobeko nyonso ekokisami kati na liloba kaka moko: « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »
Mibeko lokola: « Okosalaka ekobo te, » « okobomaka te, » « okoyibaka te, » « okolulaka te, » mpe nyonso oyo etikali, elobami na mokuse kati na mobeko oyo moko: « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. » Moto oyo azali na bolingo asalaka moninga na ye mabe te. Boye, kolinga moninga, yango nde kokokisa Mobeko nyonso.
Mobeko ya mibale oyo ekokani na yango: « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »
Soki bozali kokokisa Mobeko ya Bokonzi ya Nzambe, oyo ezali kati na Makomi: « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka, » wana bozali kosala malamu.
Tika ete moto nyonso kati na biso aluka kosepelisa moninga na ye mpo na bolamu mpe bolendisami na ye!
Yesu atunaki: — Mpo na yo, nani kati na bango misato azalaki moninga ya moto oyo akweyaki na maboko ya miyibi? Molakisi ya mibeko azongisaki: — Ezali moto oyo ayokelaki ye mawa. Yesu alobaki na ye: — Kende mpe sala bongo!
Nyonso oyo bolingaka ete bato mosusu basalela bino, bino mpe bosalaka yango mpo na bango; pamba te yango nde mateya nyonso ya Mobeko mpe ya basakoli.