Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bolingo na Ye ya seko
Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Bolingo na Ye ya seko mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Yawe abimelaki biso na kala, alobaki: « Nalingaka bino na bolingo ya seko; yango wana nabendaka bino epai na Ngai na nzela ya bolingo.
Pamba te nandimisami ete ezala kufa to bomoi, ba-anjelu to milimo mabe, makambo ya mikolo oyo to makambo oyo ekoya, banguya ya ndenge na ndenge, banguya ya likolo to ya se ya mabele to eloko mosusu oyo Nzambe akela, eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
Bosanzola Yawe, mpo ete azali malamu; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!
Liboso ete feti ya Pasika ekoma, Yesu ayebaki ete tango na Ye ekoki mpo na kotika mokili oyo mpe kokende epai ya Tata. Lokola azalaki kolinga bato na Ye, oyo bazalaki kati na mokili, akobaki kolinga bango kino na suka.
Ata bangomba milayi eningani, ata bangomba mikuse elongwe na bisika na yango, bolingo na Ngai epai na yo ekoningana te, mpe boyokani na Ngai ya kimia ekotikala kolongwa te, elobi Yawe oyo alingaka yo.
Kasi bolingo ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Ye, mpe bosembo na Ye mpo na bakitani na bango,
Kasi mpo ete Nzambe atondi na mawa mpe alingaki biso na bolingo monene, atako tozalaki bakufi mpo na masumu na biso, akomisaki biso bato ya bomoi elongo na Klisto. Bobikisami nde na ngolu…
Pamba te Yawe azali malamu; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko, mpe boyengebene na Ye, libela na libela.