Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mosala ya mabɔkɔ ya Nzambe
Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Mosala ya mabɔkɔ ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe: Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango.
02 Bafilipi 1:6
Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto.
Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika: makambo ya kala eleki, mpe makambo ya sika eyei.
Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi. Misala na Yo ezali ya kokamwa; ngai, nayebi yango malamu.
mpe mpo ete bolata bomoto ya sika oyo ekelami kolanda Nzambe, kati na bosembo mpe bosantu ya bosolo.