Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nzambe Mopesi na biso
Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Nzambe Mopesi na biso mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Mpe Nzambe na ngai akokokisa baposa na bino kolanda bomengo ya nkembo na Ye kati na Yesu-Klisto.
Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.
Nzembo ya Davidi. Yawe azali mobateli na ngai, nakozanga ata eloko moko te.
Abrayami abengaki esika yango « Nkolo akopesa. » Yango wana balobaka kino lelo: « Na likolo ya ngomba ya Yawe, ekopesama. »
Bino basantu ya Yawe, botosa Yawe; pamba te bato oyo batosaka Ye bazangaka eloko moko te.
Nzambe azali mpe na makoki ya kotondisa bino na mapamboli ya ndenge na ndenge mpo ete, na tango nyonso mpe kati na makambo nyonso, bozala na nyonso oyo bozali na yango na bosenga mpe botonda lisusu na oyo bokosala na yango misala ya malamu ya lolenge nyonso,
Botala bayanganga: elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ezali te na ebombelo bambuma to na ebombelo bilei; kasi Nzambe aleisaka yango. Nzokande bino, boleki bandeke na motuya.
Na bato nyonso oyo batalelaka Yo, opesaka bilei na tango oyo ekoki. Ofungolaka loboko na Yo mpe okokisaka posa ya nyonso oyo ezali na bomoi.
Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.
Soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata na bino oyo azali na Likolo apesa te biloko ya kitoko epai ya bato oyo basengaka Ye yango?