Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Zwa bwanya

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Zwa bwanya mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Masese 4:7

Tala ebandeli ya bwanya: Zwa bwanya, pesa biloko nyonso oyo ozali na yango mpo ete ozwa mayele.

02 Masese 3:13-14

Esengo na moto oyo amoni bwanya! Esengo na moto oyo azwi mayele! Pamba te kozala na yango eleki kozala na palata na motuya, mpe lifuti na yango eleki wolo oyo balekisi na moto na motuya.

03 Masese 16:16

Bwanya ezali malamu koleka wolo, mpe kozwa mayele ezali na litomba koleka palata.

04 Masese 8:11

pamba te bwanya ezali na motuya koleka mayaka ya kitoko, bongo eloko moko te ya motuya ekokani na yango.

05 Masese 23:23

Luka bosolo, kasi koteka yango te; sala se bongo na bwanya, na mateya mpe na mayele.

06 Masese 2:1-5

Mwana na ngai, soki ondimi maloba na ngai mpe obateli kati na motema na yo mibeko na ngai; soki opesi litoyi na yo na maloba ya bwanya mpe okabi motema na yo na makambo ya mayele; soki obeleli mayele mpe ogangi epai ya bososoli; soki oluki yango penza ndenge balukaka palata to bomengo oyo ebombama, okososola solo soki kotosa Yawe elakisi nini mpe okozwa boyebi ya Nzambe.

07 Masese 19:8

Moto oyo alukaka kozwa bwanya alingaka bomoi na ye; moto oyo alingaka mayele alongaka.

Bantína oyo etali