Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Lisangá
Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Lisangá mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Bazalaki komipesa mingi penza na malakisi ya bantoma, na kozala lisanga, na kobuka lipa mpe na kosambela.
Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.
Tosenzelana biso na biso mpo na kotindikana na bolingo mpe na misala ya malamu. Tokima Bandako ya Nzambe na biso te, ndenge bato mosusu bamesana kosala; kasi tolendisana biso na biso, wana bozali komona ete mokolo ya Nkolo ekomi pene.
Mikolo nyonso bazalaki kokoba kosangana na Tempelo. Bazalaki kokabola lipa na bandako na bango, kolia bilei na bango na esengo nyonso mpe na motema ya komikitisa.
Boye, soki kolendisama ezali kati na Klisto, soki kobondisama ezali kati na bolingo, soki boyokani ezali kati na Molimo, soki bolamu mpe mawa ezali kati na bino, botondisa motema na ngai na esengo na kozalaka motema moko, bolingo moko, likanisi moko mpe posa moko.
Tozali kosakola epai na bino makambo oyo tomoni mpe toyoki, mpo ete bino mpe bozala moko na biso. Nzokande, biso tozali moko na Tata mpe na Yesu-Klisto, Mwana na Ye.
Pamba te Nzambe oyo abengaki bino mpo ete bozala moko na Mwana na Ye, Yesu-Klisto, Nkolo na biso, azali Moyengebene.
Bandimi nyonso bakomaki na bomoko, mpe biloko na bango ezalaki mpo na bango nyonso. Bazalaki koteka mabele na bango mpe biloko na bango, mpe bazalaki kokabola mbongo kati na bango, ndenge ezalaki posa ya moto na moto.