Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Koyamba bapaya
Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Koyamba bapaya mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
mpo na oyo etali bosenga ya babulami, bosunganaka mpe boyambanaka malamu kati na bandako na bino.
Bolemba te koyambaka malamu bapaya, pamba te, na nzela wana, bato mosusu bayambaki ba-anjelu wana bayebaki te ete bazali solo ba-anjelu.
Boyambanaka malamu lokola nde boyambi bapaya kati na bandako na bino, bosalaka bongo na koyimayima te.
Kasi Soki osali feti, bengisa babola, bakufi miso, bakakatani mpe ba-ebosono; mpe Nzambe akopambola yo. Atako bakoki te kozongisela yo bolamu oyo osali mpo na bango, kasi Nzambe akofuta niongo na mokolo oyo bato ya sembo bakosekwa.
Boye, tosengeli kosunga bato ya lolenge oyo mpo ete tosangana na bango na makambo oyo bazali kosala mpo na solo.
Boye, mokambi ya Lingomba asengeli kozala: moto azanga pamela, mobali ya mwasi moko, moto oyo alekisaka ndelo te na ezaleli na ye, moto oyo ayebi komikanga, moto ya lokumu, moto oyo ayambaka malamu bapaya kati na ndako na ye, moto oyo azali na makoki ya koteya,
Asengeli nde kozala moto oyo ayambaka bato malamu kati na ndako na ye, alingaka makambo ya malamu, azalaka na ekenge; asengeli kozala moto ya bule, moto ya sembo, moto oyo ayebi komikanga,
Pamba te nayokaki nzala, mpe bopesaki Ngai bilei; nayokaki posa ya mayi, mpe bopesaki Ngai mayi ya komela; nazalaki mopaya, mpe boyambaki Ngai malamu;
Bongo Yesu alobaki na moto oyo abengisaki Ye: — Soki osali feti mpo ete bato baya kolia, kobengisa te balingami na yo, bandeko na yo, baboti na yo to bazwi oyo bazalaka pene na yo; noki te bango mpe bakobengisa yo mpo na kozongisela yo, na nzela wana, bolamu oyo osalaki mpo na bango. Kasi Soki osali feti, bengisa babola, bakufi miso, bakakatani mpe ba-ebosono; mpe Nzambe akopambola yo. Atako bakoki te kozongisela yo bolamu oyo osali mpo na bango, kasi Nzambe akofuta niongo na mokolo oyo bato ya sembo bakosekwa.
Yawe abimelaki Abrayami pene ya banzete minene ya Mamire, wana avandaki na ekotelo ya ndako na ye ya kapo, na moyi makasi ya midi. Tango Abrayami atombolaki miso, amonaki mibali misato pene na ye. Mpe tango kaka amonaki bango, atelemaki wuta na ndako na ye ya kapo mpe akendeki mbangu mpo na kokutana na bango; bongo agumbamaki kino na mabele. Alobaki: — Nabondeli bino, bankolo na ngai, soki nazwi ngolu na miso bino, boleka mosali na bino te. Tika ete namemela bino mwa mayi mpo ete bokoka kosukola makolo mpe bopema na se ya nzete oyo. Tika ete namemela bino mwa eloko ya kolia mpo ete bozwa lisusu makasi na nzoto; bongo bokokoba mobembo na bino, pamba te ezali mpo na yango nde boleki epai na ngai mosali na bino. Bazongisaki: — Ezali malamu, sala ndenge olobi.
Tango ye elongo na bato ya libota na ye bazwaki libatisi, abengisaki biso na ndako na ye; alobaki: — Soki bomoni ete ngai nakomi penza mondimi ya Nkolo, boya kovanda na ndako na ngai. Boye, asalaki nyonso mpo ete tondima kokende na ndako na ye.
Liboso na nyonso, bolinganaka makasi, pamba te bolingo ezipaka masumu ebele. Boyambanaka malamu lokola nde boyambi bapaya kati na bandako na bino, bosalaka bongo na koyimayima te.