Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nzoto ya Klisto

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Nzoto ya Klisto mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Bakolinto 12:27

Nzokande bino, bozali nzoto ya Klisto, mpe moko na moko kati na bino azali eteni ya nzoto yango ya Klisto.

02 1 Bakolinto 12:12

Nzoto ezali kaka moko, kasi ezali na biteni ebele; mpe atako motango na yango ezali ebele, kasi ezali kosala kaka nzoto moko. Ezali mpe bongo mpo na Klisto.

03 Barome 12:4-5

Pamba te ndenge kaka moko na moko kati na biso azali na biteni ebele kati na nzoto na ye, mpe eteni moko na moko ezalaka na mosala na yango, ndenge wana mpe tozali nzoto moko kati na Klisto atako tozali ebele, mpe moko na moko kati na biso azalaka eteni ya nyonso mosusu.

04 Ba-Efeso 4:15-16

Kasi wana tokolobaka bosolo kati na bolingo, tokokolaka na makambo nyonso kati na Klisto oyo azali moto. Ezali na nguya na Ye nde nzoto mobimba ekolaka mpe emitongaka kati na bolingo, wana esili kokangana malamu mpe kokoma moko na nzela ya misisa oyo epesaka yango bilei, mpo na kopesa na eteni moko na moko nzela ya kosala mosala na yango na ndenge ekoki.

05 1 Bakolinto 12:18

Kasi Nzambe atiaki biteni kati na nzoto, mpe amonaki ete ezali malamu mpo na eteni moko na moko kozala na mosala na yango.

06 1 Bakolinto 12:14

Nzoto ezali na eteni moko te, kasi ezali na biteni ebele.

07 1 Bakolinto 12:20-21

Solo, biteni ezali ebele, kasi nzoto ezali kaka moko. Yango wana, liso ekoki te koloba na loboko: « Nazali na posa na yo te; » moto mpe ekoki te koloba na makolo: « Nazali na posa na bino te. »

08 Ba-Efeso 4:16

Ezali na nguya na Ye nde nzoto mobimba ekolaka mpe emitongaka kati na bolingo, wana esili kokangana malamu mpe kokoma moko na nzela ya misisa oyo epesaka yango bilei, mpo na kopesa na eteni moko na moko nzela ya kosala mosala na yango na ndenge ekoki.

09 1 Bakolinto 12:25

asalaki bongo mpo ete bokabwani ezala te kati na nzoto, kasi mpo ete biteni na yango esunganaka.

10 Barome 12:6

Kolanda ngolu oyo epesameli biso, tozalaka na makabo ekesana. Boye tika ete moto oyo azali na likabo ya kosakola asalelaka yango kolanda kondima,

11 Bakolose 1:18

azali moto ya nzoto na Ye, oyo ezali Lingomba; azali ebandeli, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpo ete azala na bokonzi ya liboso kati na nyonso,

Bantína oyo etali