Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Komemelana mikumba
Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Komemelana mikumba mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Bomemisana mikumba bino na bino; ezali na nzela wana nde bokokokisa mobeko ya Klisto.
Biso oyo tolenda na kondima, tosengeli kondima bolembu ya bato oyo balenda te na kondima mpe koboya komisepelisa kaka biso moko.
Soki eteni moko eyoki pasi, biteni nyonso esengeli koyoka pasi elongo na moko yango; soki mpe moko kaka nde esepeli, biteni nyonso esengeli kokabola esengo elongo na moko yango.
Bosepelaka elongo na bato oyo bazali kosepela, mpe bolelaka elongo na bato oyo bazali kolela.
Boyikanaka mpiko; mpe soki moko azali na likambo ya kopamela moninga na tina na yango, bolimbisanaka. Bolimbisaka ndenge Nkolo alimbisaki bino.
Tosalaka bolamu; tolembisa nzoto na biso te mpo na yango, pamba te tokobuka mbuma na tango oyo esengeli soki toyiki mpiko. Boye, lokola tozali nanu na tango, tosalaka bolamu mpo na bato nyonso, mpe mingi-mingi mpo na libota ya bandimi.
Bandeko, tozali kolendisa bino: bopesaka bagoyigoyi mpe bato ya mobulu makebisi, bolendisaka ba-oyo basili kobungisa mpiko na bango, bosungaka ba-oyo bazangi makasi, boyikanaka mpiko.