Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kondima kozanga komona
Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Kondima kozanga komona mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Yesu alobaki na ye: — Ondimi mpo ete omoni Ngai! Esengo na bato oyo bamoni te, kasi bandimi!
Bolingaka Yesu-Klisto atako bomona Ye te. Atako bozali mpe kaka komona Ye te sik’oyo, bozali kondimela Ye mpe botondi na esengo ya nkembo oyo moto akoki kolimbola te,
pamba te totambolaka kolanda kondima, kasi kolanda miso te.
Nzokande kondima ezali ndanga ya kozwa biloko oyo tozali kolikya epai ya Nzambe, mpe kobika lokola nde tosili kozwa biloko yango atako tozali komona yango te.
Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.
Boye, totalaka te oyo emonanaka na miso, kasi totalaka nde oyo emonanaka te; pamba te oyo emonanaka ezali mpo na tango moke, kasi oyo emonanaka te ekowumelaka seko na seko.