Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Liboso ya nyonso, bólata bolingo
Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Liboso ya nyonso, bólata bolingo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Na likolo ya makambo oyo nyonso, bolataka bolingo oyo ekangisaka nyonso kati na bomoko ya kokoka.
Boye sik’oyo, makambo oyo misato ezali kowumela: kondima, elikya mpe bolingo; kasi kati na yango, likambo oyo eleki monene ezali nde bolingo.
Yango wana, lokola bozali baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami na Ye, boyokelaka mingi bato mawa, bozalaka na bolingo, na boboto, na komikitisa mpe na motema molayi.
Liboso na nyonso, bolinganaka makasi, pamba te bolingo ezipaka masumu ebele.
Bozala na niongo ya moto te, longola kaka niongo ya kolingana bino na bino, pamba te moto oyo alingaka bato mosusu akokisi makambo nyonso oyo Mobeko esengaka.
Bosalaka makambo nyonso na bolingo.