Masese 8

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Boni, Bwanya azali kobelela te? Mayele azali koyokisa mongongo na ye te?

2Atelemi na songe ya bangomba, na pembeni ya nzela, na bisika oyo banzela ekutana,

3azali koganga pene ya bikuke, na ekotelo ya engumba:

4« Bato, nazali koganga makasi epai na bino, nazali nde koloba na bino bato!

5Bino bato oyo bozanga mayele, bokoma na bososoli! Bino bazoba, bokoma mayele!

6Boyoka, pamba te nazali na makambo ya motuya ya koyebisa bino, nafungoli monoko na ngai mpo na koloba makambo ya sembo.

7Pamba te monoko na ngai ebimisaka maloba ya solo, mpe bibebu na ngai eyinaka mabe.

8Maloba nyonso oyo ebimaka na monoko na ngai ezali sembo, ezalaka na likambo moko te ya lokuta to ya mabe;

9nyonso ezali pole mpo na moto ya mayele, mpe sembo mpo na bato oyo bazali na bososoli.

10Boluka mateya na ngai kasi palata te, boyebi kasi wolo te oyo eleki peto,

11pamba te bwanya ezali na motuya koleka mayaka ya kitoko, bongo eloko moko te ya motuya ekokani na yango.

12Ngai, Bwanya, navandaka elongo na kokanisa, boye nayebi kokundola mayele mpe bososoli.

13Kotosa Yawe ezali koyina mabe. Nayinaka lolendo, lofundu, nzela ya masumu mpe monoko ya lokuta.

14Toli mpe bososoli ezali ya ngai, ngai nde mayele mpe makasi.

15Ezali na nzela na ngai nde bakonzi batambolisaka mokili, mpe bakambi basalaka mibeko ya sembo;

16ezali na nzela na ngai nde bakambi, bankumu mpe basambisi nyonso ya mokili bayangelaka.

17Nalingaka bato oyo balingaka ngai, mpe bato oyo balukaka ngai bamonaka ngai.

18Bozwi mpe lokumu, bomengo oyo ewumelaka mpe bosembo etambolaka elongo na ngai.

19Mbuma na ngai ezali kitoko koleka wolo, ezala wolo ya peto, mpe mbuma oyo nabotaka eleki palata ya kitoko.

20Natambolaka na nzela ya bosembo, mpe nasalelaka banzela oyo ememaka na boyengebene,

21mpo na kopesa libula epai ya bato oyo balingaka ngai mpe mpo na kotondisa bibombelo na bango.

22Yawe asalaki ngai liboso ete asala nyonso, liboso ya misala na Ye nyonso ya kala;

23aponaki ngai liboso ete mokili ezala, wuta na ebandeli penza, wuta na tango oyo biloko nyonso ya mokili ezalaki nanu te.

24Nabotamaki tango mayi ya bozindo ezalaki nanu te, tango miluka ebimisaki nanu mayi na yango te,

25liboso ete bangomba ya milayi mpe bangomba ya mikuse ezala na bisika na yango,

26tango amisalelaki nanu te, ezala mabele to bilanga to mpe putulu ya mokili.

27Nazalaki wana tango atandaki likolo na esika na yango, mpe tango akataki mondelo ya etando monene ya mayi ya bozindo,

28tango atiaki mapata na likolo mpe abimisaki mayi wuta na bitima,

29tango akatelaki ebale monene mondelo mpo ete mayi ezindisa mokili na Ye te, tango atiaki miboko ya mabele;

30nazalaki pembeni na Ye lokola mosungi, nazalaki kosepelisa ye tango nyonso, mpe nazalaki tango nyonso na esengo liboso na Ye;

31nazalaki kosepela kati na mokili na Ye mpe nazalaki na esengo kati na bato.

32Sik’oyo, mwana na ngai, yoka ngai: Esengo na bato oyo babatelaka banzela na ngai!

33Boyoka mateya na ngai mpe bokokoma bato ya bwanya, bomeka kobwaka yango te!

34Esengo na moto oyo ayokelaka ngai, oyo asenzelaka na ekuke na ngai mokolo na mokolo, mpe akengelaka na ekotelo na ngai!

35Pamba te moto oyo amoni ngai amoni bomoi mpe azwi ngolu na miso ya Yawe.

36Kasi moto oyo atosaka ngai te amisalaka mabe ye moko: moto nyonso oyo ayinaka ngai alingaka kufa. »

Masese

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0