Masese 2
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Mwana na ngai, soki ondimi maloba na ngai mpe obateli kati na motema na yo mibeko na ngai;
2soki opesi litoyi na yo na maloba ya bwanya mpe okabi motema na yo na makambo ya mayele;
3soki obeleli mayele mpe ogangi epai ya bososoli;
4soki oluki yango penza ndenge balukaka palata to bomengo oyo ebombama,
5okososola solo soki kotosa Yawe elakisi nini mpe okozwa boyebi ya Nzambe.
6Pamba te Yawe nde apesaka bwanya, mpe maloba ya monoko na Ye epesaka mayele mpe bososoli.
7Abongiselaka bato ya sembo elonga mpe azali nguba ya bato oyo batambolaka na bosembo.
8Pamba te abatelaka bayengebene mpe nzela ya bato oyo batosaka Ye.
9Boye, okososola likambo nini ezali solo, alima, sembo: nzela nyonso oyo ememaka na bolamu.
10Pamba te bwanya ekokota kati na motema na yo mpe boyebi ekosepelisa molimo na yo.
11Bososoli ekobatela yo, mpe mayele ekobomba yo
12mpo na kobikisa yo na nzela mabe, na moto oyo alobaka makambo ezanga tina,
13na bato oyo batikaka nzela ya sembo mpo na kolanda nzela ya molili,
14na bato oyo basepelaka kosala mabe, na bato oyo bazalaka na esengo ya kokota na bozindo ya mabe,
15na bato oyo nzela na bango etengama-tengama mpe etamboli na bango etonda na mobulu.
16Bwanya ekobikisa yo lisusu liboso ya mwasi mopaya, liboso ya mwasi oyo atonda na maloba ya sukali,
17oyo akima mobali na ye ya bolenge mpe abosana boyokani oyo asalaki elongo na Nzambe na ye;
18pamba te ndako na ye ememaka na kufa, mpe nzela na ye ememaka na mboka ya bakufi.
19Moto moko te oyo akotaka epai na ye azongaka mpe amonaka lisusu nzela ya bomoi.
20Boye, okotambola na nzela ya bato malamu mpe okolanda nzela ya bato ya sembo.
21Pamba te bato ya sembo bakovanda na mokili, mpe bato oyo bazangi pamela bakotikala kati na yango;
22kasi bato mabe bakokufa na mokili mpe bakolongola bango kati na mokili ya bato ya songisongi.
Masese
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0