Masese 27
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Komikumisa te mpo na mokolo ya lobi, pamba te oyebi te likambo nini mokolo ekoki kobota.
2Tika ete moto mosusu akumisa yo, kasi monoko na yo moko te; tika ete mopaya akumisa yo, kasi bibebu na yo moko te.
3Libanga mpe zelo ezalaka kilo, kasi kanda ya zoba ezalaka kilo koleka nyonso mibale.
4Kotomboka ememaka makambo ya somo, mpe kanda ebebisaka; kasi nani akoki kotelema liboso ya zuwa?
5Pamela oyo epesami na polele ezali malamu koleka moto oyo aboyi kopamela mpo na bolingo.
6Bapota oyo molingami azokisi ezali malamu koleka babeze ebele ya monguna.
7Moto oyo atondi aboyaka ata mafuta ya nzoyi, kasi moto oyo azali na nzala ayokaka ata bilei ya bololo elengi.
8Moto oyo ayengaka-yengaka mosika ya mokili na ye azali lokola ndeke oyo ezali koyengayenga mosika ya zala na yango.
9Mafuta mpe malasi esepelisaka motema, mpe molingami malamu apesaka toli na motema ya esengo.
10Kosundola te molingami na yo to molingami ya tata na yo, mpe kokende te na ndako ya ndeko na yo tango ozali na pasi; kozala na molingami ya pembeni ezali malamu koleka kozala na ndeko ya mosika.
11Mwana na ngai, zala moto ya bwanya mpe sepelisa motema na ngai, mpo ete nazala na eyano ya kopesa na moto oyo akoluka kotiola ngai.
12Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka, kasi moto oyo azangi mayele alekaka kaka wana mpe akutanaka na pasi.
13Kamata elamba ya moto oyo alapi ndayi mpo na niongo ya moto mosusu; bomba yango lokola ndanga soki alapi ndayi mpo na mwasi mopaya.
14Soki moto moko ayei kopambola molingami na ye, na mongongo makasi mpe na tongo-tongo, bakozwa yango lokola elakeli mabe.
15Mwasi oyo alinga koswana azali lokola ndako oyo etangaka na tango ya mvula.
16Kokanga ye ezali lokola koluka kokanga mopepe to mafuta na loboko.
17Ndenge kaka ebende epelisaka ebende mosusu, ndenge wana mpe moto abongaka soki akutani na moto mosusu.
18Moto oyo abongisaka nzete na ye ya figi aliaka mpe mbuma na yango, mpe moto oyo abatelaka mokonzi azwaka lokumu.
19Ndenge mayi ezalaka lokola kitalatala mpo na elongi, ndenge wana mpe motema ya moto elakisaka bomoto na ye moko.
20Ndenge lifelo mpe mboka ya bakufi etondaka te, ndenge wana mpe miso ya moto etondaka te.
21Bapetolaka palata na kikalungu, mpe bapetolaka wolo na fulu ya moto makasi, kasi bamekaka moto na nzela ya lokumu na ye.
22Ata soki otuti moto ya liboma na liboka elongo na mbuma, liboma na ye ekotikala te kolongwa kati na ye.
23Yeba malamu ndenge bibwele na yo ezali, mpe kengela yango malamu,
24pamba te bomengo ewumelaka seko na seko te, motole mpe ewumelaka te mpo na libela.
25Soki bakati matiti ya bibwele, matiti ya sika ekobota mpe bakolokota matiti ya bangomba;
26bameme ekopesa yo bilamba, mpe bantaba ekosunga yo mpo na kosomba elanga.
27Okozala na miliki ebele ya bantaba mpo na koleisa ndako na yo mpe basali na yo ya basi.
Masese
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0