Masese 16

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi eyano ewutaka epai na Yawe.

2Nzela nyonso ya moto emonanaka peto na miso na ye, kasi Yawe nde amekaka mitema.

3Pesa misala na yo epai na Yawe, mpe mabongisi na yo ekokokisama.

4Yawe asalaka makambo nyonso na tina, ezala bato mabe, asala bango mpo na mokolo ya pasi.

5Moto nyonso ya lolendo azalaka nkele na miso ya Yawe; solo, akozanga te kozwa etumbu.

6Bolingo mpe bosembo elongolaka mbeba; kotosa Yawe etindaka moto kokima mabe.

7Soki Yawe asepeli na nzela ya moto, akoyokanisa ye na banguna na ye.

8Kozwa biloko moke kati na bosembo ezali malamu koleka kozwa bomengo ebele kati na nzela ya mabe.

9Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi ezali Yawe nde asalaka ete ekokisama to te.

10Maloba ya mokonzi ezali lokola Liloba na Nzambe, ekweyaka te kati na kosambisama.

11Emekelo kilo ya sembo mpe basani oyo bamekelaka kilo ezali ya Yawe, mpe kilo nyonso ya saki ezali likambo na Ye.

12Ezali malamu te mpo na mokonzi kosala mabe, pamba te bokonzi elendisamaka nde na nzela ya bosembo.

13Bakonzi balingaka maloba ya solo, mpe bapesaka moto oyo alobaka na bosembo lokumu.

14Kanda ya mokonzi ememaka na kufa, kasi moto ya bwanya ayebaka kokitisa yango.

15Soki elongi ya mokonzi ezali kongenga, elingi koloba: bomoi. Bolamu na ye ezali lokola lipata ya mvula ya eleko ya suka.

16Bwanya ezali malamu koleka wolo, mpe kozwa mayele ezali na litomba koleka palata.

17Bato ya sembo batambolaka na nzela oyo epesaka mabe mokongo. Moto oyo abatelaka motema na ye abatelaka nde bomoi na ye.

18Lolendo eyaka liboso ya kobebisama, mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama.

19Kozala moto ya komikitisa mpe kozala elongo na bato bakelela ezali malamu koleka kokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya lolendo.

20Moto oyo akanisaka na tina na makambo amonaka bolamu. Esengo na moto oyo atiaka elikya na Yawe.

21Babengaka moto oyo azali na motema ya bwanya moto ya mayele, mpe bibebu ya kimia ebakisaka boyebi.

22Mayele ezali etima ya bomoi mpo na bato oyo bazali na yango, kasi bozoba ezali etumbu mpo na bazoba.

23Motema ya moto ya bwanya ekomisaka monoko na ye mayele, mpe bibebu na ye ebakisaka boyebi.

24Maloba ya elengi ezalaka lokola mafuta ya nzoyi, epesaka kimia na motema mpe lobiko na mikuwa.

25Nzela mosusu emonanaka sembo na miso ya bato, nzokande, na suka, ememaka na kufa.

26Nzala etindaka mosali ete asala mosala, monoko na ye etindikaka ye na mosala.

27Moto ya Beliali abongisaka kosala mabe, mpe maloba na ye ezali lokola moto oyo etumbaka.

28Moto mabe alonaka koswana, moto ya songisongi akabolaka baninga.

29Moto ya mobulu abendaka moninga na ye mpe atambolisaka ye na nzela ya mabe.

30Moto oyo akangi miso mpe bibebu na ye mpo na kosala mabongisi ya mabe asili kosala masumu.

31Suki ya pembe ezali motole ya nkembo; bazwaka yango na nzela ya bosembo.

32Moto oyo akangaka motema azali makasi koleka elombe, mpe moto oyo ayebi komikanga azali makasi koleka moto oyo abotolaka bingumba.

33Bakobetaka zeke kati na elamba ya Nganga-Nzambe, kasi mikano nyonso ewutaka na Yawe.

Masese

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0