Masese 6

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Mwana na ngai, soki ondimi niongo ya moninga na yo, soki obeti tolo mpo na kondima niongo ya mopaya,

2omikangi nde singa na maloba na yo, omikangi nde na motambo ya maloba ya monoko na yo.

3Boye, mwana na ngai, sala makambo oyo mpo ete omikangola, pamba te omikabaki na maboko ya moninga na yo; kende komikitisa liboso na ye mpe tingama na ye,

4kotika te ete miso na yo elala pongi to enimba;

5mikangola na motambo lokola mboloko na maboko ya mobomi banyama ya zamba, mpe lokola ndeke na motambo ya mokangi bandeke.

6Yo moto ya goyigoyi, kende epai ya furmi, tala malamu ezaleli na yango mpe okozwa bwanya!

7Yango ezalaka na mokambi te, mokengeli te to mokonzi te;

8ebongisaka bilei na yango na tango ya moyi makasi, ebombaka yango na tango ya kobuka mbuma.

9Yo moto ya goyigoyi, okolala pongi kino tango nini? Kino tango nini okolamuka na pongi na yo?

10Mwa pongi moke, mwa kopema moke, mwa kokanga maboko moke mpo na kolala

11mpe bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela, mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi.

12Moto oyo atambolaka na lokuta na monoko azali moto ya Beliali, moto mabe:

13Abetaka-betaka miso, apesaka bilembo na makolo na ye mpe alobaka na nzela ya bilembo ya misapi;

14azalaka na makanisi mabe kati na motema na ye, asalaka tango nyonso mabongisi ya mabe mpe alukaka kaka tango nyonso makelele.

15Yango wana, pasi ekoyela ye na pwasa, akobukana mbala moko, mpe kisi ya kobikisa ye ekozala te.

16Yawe ayinaka makambo wana motoba; mpe makambo oyo sambo ezali mabe penza na miso na Ye:

17Kodongola, lolemo ya lokuta, maboko oyo ebomaka moto oyo asali mabe te,

18motema oyo ekanisaka mabongisi ya mabe, makolo oyo epotaka mbangu na mabe,

19motatoli mabe oyo alobaka lokuta mpe moto oyo alukaka makelele kati na bandeko.

20Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo mpe kosundola te mateya ya mama na yo.

21Kanga yango tango nyonso na motema na yo, lata yango na kingo na yo.

22Pamba te ekolakisa yo nzela tango okokende na mobembo, ekobatela yo tango okolala pongi mpe ekosolola na yo tango okolamuka.

23Mibeko ezali mwinda, mateya ezali pole, makebisi mpe pamela ezali nzela ya bomoi,

24mpo na kobatela yo mosika ya mwasi ya ndumba, mosika ya lokuta ya lolemo ya mwasi ya mopaya.

25Kotika te ete motema na yo elula kitoko na ye, mpe miso na ye ekweyisa yo.

26Pamba te likolo ya mwasi ya ndumba, okoki kobungisa ezala eteni na yo ya lipa, mpe mwasi ya libala akoki kobebisa bomoi ya motuya.

27Boni, moto akoki solo kozika moto, bongo bilamba na ye ezika te?

28Moto akoki solo kotambola na likolo ya makala ya moto, bongo makolo na ye ezika te?

29Boye, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na ye akozanga te kozwa etumbu.

30Kotiola moyibi te soki ayibi mpo ete azali na nzala mpe azangi eloko ya kolia.

31Kasi soki bakangi ye, akozongisa mbala sambo, akopesa biloko nyonso ya ndako na ye.

32Mobali oyo asalaka ekobo na mwasi ya moninga azali lokola moto oyo azangi mayele; kosala ekobo ya boye ezali nde komiboma;

33akobuka lokola mbuma: minyoko mpe kosambwa; bongo soni na ye ekosila te.

34Pamba te zuwa epelisaka kanda makasi kati na mobali, mpe akozala na mawa te na mokolo oyo akozongisa mabe na mabe;

35akotikala kondima ata lifuti moko te mpo ete akoka kolimbisa, mpe akoboya yango ata soki babakisi bakado.

Masese

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0