Masese 18
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Moyimi alukaka kaka kosepelisa baposa na ye, atelemelaka bososoli nyonso.
2Moto oyo azangi mayele asepelaka te kozwa tango ya kokanisa, kasi asepelaka kaka kotalisa makanisi ya motema na ye.
3Soki moto mabe ayei, kotiola mpe eyaka; soki soni eyei, kofinga mpe eyaka.
4Maloba ya monoko ya moto ezalaka lokola mayi ya mozindo; etima ya bwanya ezalaka lokola mayi ya ebale oyo etondi makasi.
5Ezali malamu te kolongisa moto mabe mpe kokweyisa moyengebene, kati na kosambisama.
6Bibebu ya moto oyo azangi mayele eyeisaka koswana, mpe monoko na ye eyeisaka fimbu.
7Monoko ya moto oyo azangi mayele ememelaka ye kufa, mpe bibebu na ye ezalaka motambo mpo na molimo na ye moko.
8Maloba ya moto ya songisongi ezalaka lokola bilei ya kitoko, ekitaka na esengo kino na libumu.
9Moto oyo azongaka sima na mosala na ye azali ndeko ya mobebisi.
10Kombo ya Yawe ezali lokola ndako molayi batonga makasi; moyengebene akimelaka kuna mpe azwaka ebombamelo ya makasi.
11Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye, oyo batonga makasi; akanisaka ete ezali lokola mir ya molayi.
12Liboso ete moto akweya, motema na ye ekomaka na lolendo; kasi komikitisa eyaka liboso ya nkembo.
13Kopesa eyano liboso ya koyoka ezali liboma mpe bozoba.
14Kimia kati na motema elendisaka moto na tango ya bokono, kasi nani akokoka kolendisa motema oyo etutami?
15Motema ya moto ya mayele ezwaka mayele, mpe litoyi ya moto ya bwanya elukaka boyebi.
16Kado efungolelaka moto oyo apesi yango nzela mpe ekotisaka ye liboso ya bato minene.
17Moto ya liboso na kosamba amonanaka lokola nde alongi; kasi soki moto oyo azali kosamba na ye ayei, akotelemela ye.
18Zeke esilisaka koswana mpe ekataka makambo kati na bato ya makasi.
19Kokota lisusu na motema ya ndeko oyo osali mabe ezalaka pasi koleka kokota na engumba batonga makasi; mpe koswana na moto ezali lokola kokanga bikuke ya ndako batonga makasi na bibende ya minene.
20Moto atondisaka libumu na ye na nzela ya mbuma ya monoko na ye mpe akotonda na lifuti ya bibebu na ye.
21Kufa mpe bomoi ezali na se ya nguya ya lolemo; moto oyo alingaka lolemo akolia mbuma na yango.
22Mobali oyo azwi mwasi ya malamu azwi bomengo, azwi ngolu kowuta epai na Yawe.
23Mobola alobaka na mongongo ya kobondela, kasi mozwi azongisaka eyano na lolendo.
24Moto oyo azalaka na balingami ebele amitiaka na pasi, kasi ezali na molingami moko ya motema, oyo aleki ata ndeko.
Masese
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0