Yobo 39
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Oyebi tango nini bantaba ya ngomba ebotaka? Osila komona ndenge mboloko ebotaka?
2Osila kotanga basanza oyo ewumelaka na zemi? Oyebi tango oyo ebotaka?
3Ekogumbama, ekobota bana na yango mpe ekolongwa na pasi na yango ya kobota.
4Bana na yango ekozwa makasi, ekokola na libanda, ekokende mosika mpe ekozonga lisusu te.
5Nani akangoli ane ya zamba? Nani apesi yango bonsomi?
6Ngai nde napesi yango esobe lokola ndako, mpe mabele ya mungwa lokola esika ya kovanda.
7Esekaka makelele ya bingumba mpe eyokaka te mongongo ya motambolisi ya mpunda.
8Etambolaka na ngomba mpo na koluka bilei mpe elukaka na bokebi matiti nyonso ya mobesu.
9Mpakasa ekoki kondima kosalela yo? Ekoki kolekisa butu na elielo na yo ya banyama?
10Okoki kokanga mpakasa na singa ya ebende oyo ebalolaka mabele? Ekoki kolanda yo mpo na kotondisa mabwaku na mabele?
11Okotia solo elikya na yo kati na yango, mpo ete makasi na yango ezali monene? Okotikela yango mosala na yo?
12Okotiela yango solo motema mpo na komemela yo bambuma mpe kosangisa yango na etutelo na yo?
13Mapapu ya maligbanga efungwamaka na esengo nyonso, kasi, boni, lipapu mpe nsala na yango ekokani na oyo ya nkongi?
14Maligbanga ebwakaka maki na yango na mabele mpe etikaka yango ete ezwa moto ya mabele,
15kasi ebosanaka ete lokolo ekoki kopanza yango mpe banyama ya zamba ekoki konyata-nyata yango.
16Enyokolaka bana na yango makasi lokola nde ezali bana na yango te, emonaka na yango motema pasi te lokola nde esali mosala ya mpunda,
17pamba te Nzambe apimeli yango bwanya mpe apesi yango mayele te.
18Nzokande soki etelemi mpe ebandi kopota mbangu, ekoseka ata mpunda mpe motambolisi na yango.
19Boni, yo nde moto opesa mpunda makasi mpe olatisa kingo na yango pwale ya milayi?
20Yo moto opumbwisaka yango lokola libanki? Lolendo ya mongongo kitoko na yango epesaka somo.
21Mpunda enyataka na makasi nyonso maboke ya mabele, esepelaka na makasi na yango mpe ekendaka liboso ya bibundeli.
22Eyokaka somo te, ebangaka eloko moko te, ezongaka sima te liboso ya mopanga,
23tango saki ya mbanzi eninganaka likolo na yango elongo na likonga oyo ezali kopela moto mpe mopanga.
24Epumbwaka na kanda mpe epanzaka mabele, evandaka kimia te soki kelelo ebeti.
25Soki kelelo ebeti, egangaka: ‹ Ah! › Na mosika, eyokaka solo ya bitumba, koganga ya bakambi ya basoda mpe makelele ya bitumba.
26Boni, ezali na mayele na yo nde kombekombe epumbwaka mpe etandaka mapapu na yango na ngambo ya sude?
27Na mitindo na yo nde mpongo emataka likolo mpe esalaka zala na yango na likolo?
28Evandaka mpe etongaka ndako kati na mabanga, na esika ya kaka, na songe ya libanga.
29Wuta na likolo, emonaka nyama ya kolia, miso na yango emonaka na mosika.
30Bana na yango emelaka makila. Esika ebembe ezali, mpongo ezali wana. »
Yobo
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0