Yobo 15

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki:

2« Boni, moto ya bwanya akopesaka solo eyano na maloba ya pamba boye, maloba oyo ezanga ata tina, to alingaka kotondisa libumu na ye na mopepe ya moto oyo ewutaka na Este?

3Akoki solo komilobela na maloba ezanga ata tina? Akoki solo kosalela maloba milayi oyo ezali ata na motuya te?

4Yo ozali penza kobebisa lokumu ya Nzambe okomi koboya lokumu liboso ya Nzambe.

5Lisumu na yo ezali kokamba monoko na yo, ozwi elobeli ya bakosi.

6Monoko na yo moko nde ezali komemela yo etumbu, kasi monoko na ngai te; bibebu na yo moko nde ezali kofunda yo.

7Yo nde moto ya liboso oyo obotama kati na bato? Omona moyi liboso ya bangomba mikuse?

8Osila koyoka makambo oyo elobamaka kati na Likita ya Nzambe? Bwanya ezalaka kaka epai na yo moko?

9Makambo nini oyebi, oyo biso toyebi te? Boyebi nini ozali na yango, oyo biso tozali na yango te?

10Na ngambo na biso, ezali na bato ya suki pembe, bampaka, bato oyo baleki tata na yo na mibu ya mbotama.

11Kobondisama ya Nzambe mpe maloba ya kimia oyo bazali koloba mpo na yo, ekoki te mpo na yo?

12Mpo na nini motema na yo ezali kopengwisa yo, mpe miso na yo ezali kobeta-beta?

13Mpo ete obwakela Nzambe kanda na yo mpe obimisa makambo ya boye na monoko na yo?

14Moto azali nani mpo ete azala peto? Ye oyo abotami na mwasi azali nani mpo ete azala sembo?

15Soki Nkolo azali kondimela basantu na Ye te, soki kutu likolo ezali peto te na miso na Ye,

16ekozala boni mpo na moto mabe, moto oyo abeba, oyo asalaka mabe lokola azali komela mayi?

17Yoka ngai, mpe nakolimbolela yo! Tika ete nayebisa yo makambo oyo ngai namona,

18makambo oyo bato ya bwanya balobaki, na kobomba ata eloko moko te kati na makambo oyo bazwaki epai ya batata na bango.

19Apesaki mokili epai na bango kaka tango ata mopaya moko te alekaki kati na bango.

20Na bomoi na ye mobimba, na mibu oyo bakata mpo na bomoi na ye, moto mabe anyokwamaka.

21Lokito ya somo etondisaka matoyi na ye, bato ya mobulu babimelaka ye ata na tango ya kimia.

22Azalaka na elikya te ya kobima na molili, mpe mopanga ezelaka ye.

23Ayengaka-yengaka mpo na koluka lipa, kasi akozwela yango wapi? Ayebaka ete mokolo ya molili ezelaka ye.

24Pasi mpe mawa ebangisaka ye, ekomelaka ye lokola mokonzi oyo amibongisi mpo na bitumba,

25mpo ete asembolaka loboko na ye mpo na kobundisa Nzambe, atelemelaka Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,

26akimaka epai na Ye, moto etala na se, amibombaka na sima ya banguba minene.

27Elongi na ye ekotonda mafuta, loketo na ye ekokoma monene;

28akovanda na engumba ebeba, kati na bandako oyo bato bakima, bandako oyo ekoma pene ya kokweya;

29akotikala kokoma mozwi te, pamba te bozwi na ye ekowumela te, bomengo na ye ekopanzana te kati na mokili mobimba;

30akokoka kokima molili te, moto ekokawusa mandalala na ye mpe akokima ata pema na ye moko.

31Tika ete atia elikya na ye na lokuta te, pamba te akoyokisama soni mpe akozwa libebi lokola lifuti.

32Ekokokisama liboso ete akufa, ndenge lindalala ekawukaka mpo na kozanga mayi na yango

33to lokola nzete ya vino oyo ekweyisi bambuma na yango, wana ezali nanu mobesu to lokola nzete ya olive oyo ekweyisi fololo na yango.

34Solo, libota ya moto mabe ekofuluka te, mpe moto ekozikisa ndako na ye mpo na mabe na ye moko.

35Pamba te moto nyonso oyo azalaka na makanisi mabe kati na ye abotaka kaka pasi; mabe oyo ekolaka kati na ye ememelaka ye moko libebi. »

Yobo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0