Yobo 10

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Nayini bomoi na ngai! Nakokoba kaka komilela, nakoloba na mongongo makasi mpe na pasi ya motema na ngai.

2Nakoloba na Nzambe: ‹ Kokatela ngai etumbu te, yebisa ngai mabe nini nasali! ›

3Boni, ozali kosepela konyokola ngai, kobwaka ekelamu oyo maboko na Yo esali, mpe kolongisa mabongisi ya bato mabe?

4Boni, ozali na miso ya mosuni? Ozali komona lokola bato?

5Boni, mikolo na Yo ezali lokola mikolo ya bato, mpe mibu na yo, lokola mibu ya bato,

6mpo ete oluka mabe na ngai to okundola masumu na ngai,

7atako oyebi malamu ete nasali na ngai mabe te, mpe ete ezali na moto moko te oyo akoki kokangola ngai na loboko na Yo?

8Maboko na Yo nde ebongisaki ngai mpe esalaki ngai; olingi sik’oyo kobenda nzoto mpe koboma ngai?

9Kanisa ete Yo moko nde obongisaki ngai lokola mabele ya bikeko; olingi sik’oyo kozongisa ngai na putulu?

10Osopaki ngai lokola miliki te? Okangisaki ngai mbuma-mbuma te lokola fromage?

11Olatisaki ngai poso ya nzoto mpe misuni te? Otongaki mikuwa mpe misisa na ngai te?

12Opesaki ngai bomoi mpe otalisaki ngai bolamu; mpe na bonzambe na Yo, obatelaki molimo na ngai.

13Kasi tala likambo oyo obombaki kati na motema na Yo, mpe nayebi ete ezalaka kati na makanisi na Yo.

14Soki nasalaki masumu, olingaki komona ngai, mpe olingaki te kozanga kopesa ngai etumbu mpo na masumu na ngai.

15Soki nazali na ngambo, wana mawa na ngai! Ata nasali mabe te, nazali kokoka te kotombola moto, pamba te natondisami na soni mpe nazindi kati na pasi na ngai.

16Soki nameki kotombola moto, ozali kolanda ngai lokola nkosi mpe ozali kobimisela ngai mayele na Yo nyonso mpo na kotelemela ngai,

17ozali komemela ngai batatoli ya sika mpo na kotelemela ngai, ozali kopelisela ngai kanda na Yo mpo na kosala ngai mabe, mampinga na Yo bazali tango nyonso koya kobundisa ngai.

18Mpo na nini obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai? Nalingaki na ngai kokufa, mpe liso moko te elingaki komona ngai.

19Soki kutu nazalaka na ngai te, nalingaki koleka kaka mbala moko longwa na libumu ya mama kino na kunda.

20Boni, mwa ndambo ya mikolo na ngai esili te? Kende ata mosika na ngai mpo ete nazwa ata tango ya kosepela

21liboso ete nakende na esika oyo bato bazongaka lisusu te, na mokili ya molili, mokili ya kufa,

22na mokili ya molili makasi, ya kufa mpe ya mobulu, epai wapi ata pole ezalaka molili. »

Yobo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0