Yobo 25

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki:

« Bokonzi mpe somo ezali ya Nzambe; atiaka kimia na bisika na Ye ya likolo.

Boni, bakoki kotanga mampinga na Ye ya lola? Na likolo ya nani pole ya Nzambe engengaka te?

Ndenge nini moto akoki kozala sembo na miso ya Nzambe? Ndenge nini moto oyo abotami na mwasi akoki kozala peto?

Soki kutu sanza ezali kongenga te, mpe minzoto ezali peto te, na miso na Ye,

toloba nini mpo na moto oyo azali se mutsopi, mpo na mwana na moto oyo azali kaka nyama moke ya pamba! »

Yobo

Fungola motángi ya kosangana mpo na kobongola libongoli, kobongisa makomi, mpe kotia elembo na vɛrsɛ — to talá vɛrsɛ na ntina.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0