Yobo 16
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Yobo azongisaki:
2« Nayoki maloba ebele ya lolenge oyo; bino nyonso bozali babondisi mabe.
3Kino tango nini bokotika koloba maloba ya pamba-pamba boye? Likambo nini etindi yo lisusu kozongela maloba?
4Ngai mpe nakokaki koloba lokola bino, soki bozalaki na esika na ngai, nakokaki kobimisa maloba ebele mpe koningisa moto mpo na bino.
5Kasi monoko na ngai elingaki kolendisa bino, mpe bibebu na ngai elingaki koningana mpo na kokitisa bino mitema kati na pasi.
6Nzokande, soki nalobi, pasi na ngai ekosila te; bongo soki nakangi monoko nde pasi yango elongwe na bomoi na ngai?
7Oh Nzambe! Solo penza, olembisi ngai! Obebisi ndako na ngai nyonso,
8ofini-fini ngai makasi penza, mpe kokonda na ngai ekomi ata kotatola mpe kofunda ngai na miso ya bato!
9Kanda na Yo ezali kopasola mpe kobundisa ngai, okomi ata kolia minu mpo na kosala ngai mabe mpe kotala ngai na miso mabe lokola nde nazali monguna na yo.
10Bato mabe bafungoli minoko mpo na kotiola ngai, bakomi kobeta ngai bambata na matama mpo na kosambwisa ngai, bango nyonso basaleli ngai likita.
11Nzambe akabi ngai na maboko ya bato mabe mpe abwaki ngai na manzaka na bango.
12Makambo nyonso ezalaki kotambola malamu mpo na ngai, kasi aningisi ngai, akangi ngai na kingo mpe apanzi ngai, akomisi ngai lokola eloko na Ye ya komekela makonga;
13makonga na Ye ezingeli ngai, atoboli-toboli libumu na ngai, mpe na mawa te, asopi makila na ngai na mabele.
14Tango nyonso, azali kaka kozokisa ngai mpe kokweya likolo na ngai lokola elombe.
15Natongi elamba na ngai ya saki na poso ya nzoto na ngai mpe nakundi lokumu na ngai nyonso na se ya putulu.
16Likolo ya kolela, elongi na ngai ekomi motane, mpe molili ezingeli miso na ngai.
17Nzokande, maboko na ngai etikala kosala moto mabe te, mpe libondeli na ngai ezalaki kosalema na motema peto.
18Oh mabele, kozipa makila na ngai te! Kotika te ete koganga na ngai ezwa tango ya kopema!
19Wuta sik’oyo, motatoli na ngai azali na Likolo, molobeli na ngai azali na Lola.
20Baninga na ngai bakomi koseka ngai; nazali nde kolela epai ya Nzambe na mpinzoli.
21Boni, ezali solo na molobeli oyo akoki kolobela moto liboso ya Nzambe ndenge moto alobelaka moninga na ye?
22Solo, motango ya mibu na ngai ekomi pene ya kosila, mpe nakokende na ngai na nzela oyo bato bazongaka lisusu te.
Yobo
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0