Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nkanda elongolami
Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Nkanda elongolami mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Nzambe akabaki Klisto lokola mbeka mpo ete, na nzela ya kosopa makila na Ye, Klisto azwa bolimbisi masumu ya bato oyo bazali kondima. Asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye, pamba te, na tango ya kala, tango oyo akangaki motema, apesaki bato etumbu te mpo na masumu na bango.
Lokola tokomi sik’oyo bato ya sembo na nzela ya makila na Ye, Klisto akobikisa biso mpe na kanda ya Nzambe.
Amikabaki lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso; mpo na masumu na biso kaka te, kasi mpe mpo na masumu ya mokili mobimba.
Pamba te Nzambe abongisa biso te mpo na kanda na Ye, kasi mpo ete tozwa lobiko na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso,
Bolingo yango emonani na likambo oyo: ezali biso te bato tolingaki Nzambe, kasi Ye nde alingaki biso mpe atindaki Mwana na Ye mpo ete azala mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso.
Yango wana, lokola tokomi bato ya sembo na nzela ya kondima, tozali na kimia elongo na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto
Moto nyonso oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko; nzokande moto oyo aboyi kondima Mwana akozwa bomoi yango te, kasi azalaka kaka na se ya etumbu ya Nzambe.