Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Ekulusu

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Ekulusu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Bakolinto 1:18

Pamba te mateya ya ekulusu ezali liboma mpo na bato oyo bazali kobunga, kasi ezali nguya ya Nzambe mpo na biso oyo tobiki;

02 Bagalatia 6:14

Mpo na ngai, nakomikumisa na eloko mosusu te, longola kaka na ekulusu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, pamba te ezali na nzela ya ekulusu yango nde mokili ebakamaki mpo na ngai, mpe ngai nabakamaki mpo na mokili.

03 Bakolose 2:14

apasolaki mokanda oyo mibeko na yango ekatelaki biso etumbu, asilisaki bokonzi ya mibeko yango, wana abakaki yango na ekulusu.

04 Bafilipi 2:8

amikitisaki penza mpe atosaki kino na kufa, ata na kufa ya ekulusu.

05 1 Petelo 2:24

Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.

06 Ba-Ebre 12:2

Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.

07 Yoane 12:32

Mpe tango bakotombola Ngai longwa na mabele, nakobenda bato nyonso epai na Ngai.

08 1 Bakolinto 2:2

Pamba te, wana nazalaki elongo na bino, nazwaki mokano ya koluka koyeba likambo mosusu te, longola kaka Yesu-Klisto mpe Yesu-Klisto oyo babakaki na ekulusu.

09 Bagalatia 5:11

Bandeko na ngai, soki nazalaki nanu koteya tina ya kokatisa ngenga, mpo na nini nanyokolama lisusu? Soki ezali bongo, mateya ya ekulusu elingaki lisusu kobetisa bato mabaku te.

10 Ba-Efeso 2:16

mpe mpo na koyokanisa, kati na nzoto se moko, masanga nyonso mibale elongo na Nzambe na nzela ya ekulusu oyo abomaki na yango bonguna oyo ezalaki kati na bango.

11 Bakolose 1:20

mpe kozongisa, na nzela ya Klisto, boyokani kati na Ye moko Nzambe mpe bikelamu nyonso, ezala oyo ezali na mabele to mpe oyo ezali kati na Likolo, na kotia kimia na nzela ya makila oyo Mwana na Ye asopaki na ekulusu.

Bantína oyo etali