Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mosaleli oyo Anyokwamaki

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Mosaleli oyo Anyokwamaki mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ezayi 53:3

Bato batiolaki mpe basundolaki ye, ye moto na pasi, amesana konyokwama. Lokola moto oyo babwakeli soyi na elongi, atiolamaki, mpe tondimaki ye te.

02 Ezayi 53:5

Nzokande, bazokisaki ye bapota mpo na botomboki na biso, banyokolaki ye mpo na masumu na biso; etumbu oyo ememelaki biso kimia ekweyaki na nzoto na ye; mpe na nzela ya bapota na ye, biso tobikisami na bokono na biso.

03 Ezayi 53:7

Banyokolaki ye mpe bamonisaki ye pasi, kasi atikalaki kofungola monoko na ye te lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya bato oyo bazali kolongola yango bapwale; akangaki monoko na ye.

04 Ezayi 52:14

Ndenge bato mingi bazalaki na somo mpo na ye na ndenge abebaki, elongi na ye etikalaki lisusu te lokola elongi ya moto, mpe lolenge na ye etikalaki lisusu te lokola mwana ya moto nyonso,

05 Bafilipi 2:7-8

kasi amikomisaki moto pamba, akomaki lokola mowumbu, amikomisaki lokola moto mpe amonanaki bongo lokola moto; amikitisaki penza mpe atosaki kino na kufa, ata na kufa ya ekulusu.

06 Ezayi 53:4

Solo, amemaki mokumba ya bokono na biso mpe alataki pasi na biso kati na nzoto na ye; kasi biso, tokanisaki ete Nzambe nde abetaki ye, apesaki ye etumbu mpe asambwisaki ye.

07 Ezayi 53:6

Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme, moko na moko azalaki kolanda nzela na ye; bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso na nzoto na ye.

08 Ezayi 53:10

Nzokande, ezalaki mokano na Yawe ete anyokwama na nzela ya pasi. Atako Yawe akomisaki bomoi na ye mbeka mpo na masumu, akomona bakitani na ye mpe mikolo na ye ekobakisama; bongo mokano na Yawe ekolongisama na loboko na ye.

09 Ezayi 50:6

Napesaki mokongo na ngai epai ya bato oyo bazalaki kobeta ngai, matama na ngai, epai ya bato oyo bazalaki kopikola ngai mandefu. Nabombaki elongi na ngai te na kotiolama mpe na basoyi.

10 Ezayi 53:11

Sima na pasi ya molimo na ye, akomona pole ya bomoi mpe posa na ye ekokokisama. Na nzela ya boyebi na ye, Mosali na Ngai ya sembo akolongisa bato ebele mpe akomema masumu na bango.

Bantína oyo etali