Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mwana-Meme ya Nzambe

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Mwana-Meme ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Yoane 1:29

Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki: — Tala Mpate ya Nzambe, oyo alongolaka lisumu ya mokili.

02 Ezayi 53:7

Banyokolaki ye mpe bamonisaki ye pasi, kasi atikalaki kofungola monoko na ye te lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya bato oyo bazali kolongola yango bapwale; akangaki monoko na ye.

03 Emoniseli 5:12

mpe bazalaki koloba na mongongo makasi: « Mpate oyo babomaki abongi na kozwa nguya, bomengo, bwanya mpe makasi, lokumu, nkembo mpe masanzoli. »

04 1 Petelo 1:19

kasi ezali nde na nzela ya makila ya talo ya Klisto lokola mpate oyo ezangi mbeba mpe litono.

05 Emoniseli 5:6

Mpe namonaki Mpate moko ya kotelema na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi, mpe bazingela na bikelamu minei ya bomoi elongo na bampaka. Mpate yango amonanaki lokola nde basilaki koboma Ye; azalaki na maseke sambo mpe miso sambo oyo ezali milimo sambo ya Nzambe, oyo etindama na mokili mobimba.

06 Yoane 1:36

amonaki Yesu koleka mpe alobaki: « Botala Mpate ya Nzambe! »

07 1 Bakolinto 5:7

Bolongola kati na bino kisi nyonso ya kala ya mapa mpo ete bokoma peto lokola potopoto ya sika ya mapa, ndenge bozali penza. Pamba te Klisto, Mpate na biso ya Pasika, asilaki kopesama lokola mbeka.

08 Emoniseli 5:9

Mpe bayembaki nzembo ya sika: « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.

09 Emoniseli 7:14

Nazongiselaki ye: — Nkolo na ngai, yo nde oyebi. Bongo alobaki na ngai: — Ezali ba-oyo bawuti na minyoko makasi. Basukolaki banzambala na bango mpe bakomisaki yango pembe kati na makila ya Mpate.

10 Emoniseli 12:11

Kasi bango balongi ye na nzela ya makila ya Mpate, mpe na nzela ya liloba ya litatoli na bango; balingaki te bomoi na bango kino kondima ata kokufa.

11 Misala ya Bantoma 8:32

Tala eteni ya Makomi oyo azalaki kotanga: « Lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya moto oyo azali kolongola yango bapwale, afungolaki monoko na ye te.

Bantína oyo etali