Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nzela, Solo mpe Bomoi
Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Nzela, Solo mpe Bomoi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Yesu azongiselaki ye: — Ngai, nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata, soki na nzela na Ngai te.
Ngai nde nazali ekuke; moto nyonso oyo akokotela na nzela na Ngai akobika; akokota mpe akobima, mpe akozwa bilei.
Lobiko ekoki kozwama na moto mosusu te, pamba te kombo mosusu ezali te na mokili, oyo epesama na bato, oyo ekoki kobikisa biso.
Yesu alobaki na ye: — Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi.
Afungolelaki biso nzela ya sika mpe ya bomoi na nzela ya rido ya Tempelo, oyo ezali nzoto na Ye moko.
pamba te Mibeko eyaki na nzela ya Moyize, kasi ngolu mpe solo eyaki na nzela ya Yesu-Klisto.
bokoyeba solo, mpe solo ekokangola bino.
Yango wana, bandeko na ngai, tozali solo na elikya ete tokokota na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpo ete Yesu asopaki makila na Ye. Afungolelaki biso nzela ya sika mpe ya bomoi na nzela ya rido ya Tempelo, oyo ezali nzoto na Ye moko.
Simona Petelo azongisaki: — Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo nde ozali na maloba ya bomoi ya seko.
Pamba te na nzela na Ye, biso mpe bango tokotaka epai ya Tata kati na Molimo moko.
Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.