Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nzete ya vinyo mpe bitape
Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Nzete ya vinyo mpe bitape mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Bowumela kati na Ngai, mpe Ngai nakowumela kati na bino. Ndenge etape ekoki kobota bambuma te na ndenge na yango moko, soki ekangani te na nzete na yango ya vino, ndenge wana mpe bino, bokoki kobota bambuma te soki bokangani na Ngai te.
Nazali nzete ya vino; bino, bozali bitape. Moto oyo akowumela kati na Ngai, mpe Ngai kati na ye, akobotaka bambuma ebele, pamba te bokoki kosala eloko moko te, soki na lisungi na Ngai te.
Nazali nzete ya solo ya vino, mpe Tata na Ngai azali nkolo elanga.
Tata na Ngai akataka etape nyonso oyo, kati na Ngai, ebotaka mbuma te; mpe abongisaka bitape nyonso oyo ebotaka bambuma, mpo ete ebota lisusu bambuma ebele koleka.
Moto oyo akowumela te kati na Ngai akobwakama na libanda ya elanga, lokola bitape oyo bakati: ekokawuka, bakolokota yango, bakobwaka yango na moto mpe ekozika.
Bino mpe, bosili kokoma peto mpo na liloba oyo nateyaki bino.
Soki bokowumela kati na Ngai, mpe maloba na Ngai ekowumela kati na bino, bosenga nyonso oyo bolingi, bokozwa yango.
Soki boboti bambuma ebele mpe botalisi, na nzela yango, ete bozali bayekoli na Ngai, Tata na Ngai azwa lokumu.
Ezali bino te bato boponaki Ngai! Ngai nde naponaki bino mpe napesaki bino mosala mpo ete bokende, bobota bambuma, bambuma oyo ekowumela; mpe mpo ete Tata apesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.
Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika. Nzete ya vino oyo opikolaki wuta na Ejipito, olonaki yango wana obenganaki bikolo ebele.
Kasi mbuma ya Molimo ezali: bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, bondeko, kosala bolamu, kondima, boboto mpe komikanga. Mibeko epekisaka te makambo ya lolenge oyo.
Kasi tika ete moto oyo atiaka elikya na Yawe mpe atalelaka Ye apambolama! Akozala lokola nzete oyo balona pembeni ya mayi, oyo epanzaka misisa na yango kino na mayi: ezalaka na somo ya moyi makasi te; makasa na yango ezalaka kaka mibesu tango nyonso. Ezalaka na somo ya koya ya mobu ya bokawuki te mpe ebotaka mbuma tango nyonso. »
Kasi soki bitape mosusu ekatamaki; soki yo, etape ya nzete ya olive ya zamba, bakangisaki yo kati na bitape oyo etikalaki; soki sik’oyo okomi komela, elongo na bitape yango, mayi moko oyo ezali komata wuta na mosisa ya nzete ya olive,
Nakoyemba loyembo mpo na molingami na ngai, loyembo ya molingami na ngai mpo na elanga na ye ya vino. Molingami na ngai azalaki na elanga moko ya vino kati na mabele kitoko oyo ezalaka na mopanzi ya ngomba; abalolaki mabele, alongolaki mabanga, mpe alonaki vino ya kitoko koleka; atongaki kuna ndako molayi ya bakengeli mpe atimolaki ekamolelo ya vino. Akanisaki ete akobuka bambuma ya vino ya kitoko, kasi ebotelaki ye bambuma ya mabe!