Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Moko na Klisto

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Moko na Klisto mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Bakolinto 6:17

Kasi moto oyo asangani na Nkolo azali moko na Ye kati na Molimo.

02 Yoane 17:21

mpo ete bango nyonso bazala moko ndenge Yo Tata ozali kati na Ngai, mpe Ngai kati na Yo; ete bango mpe bazala moko kati na biso, mpe ete mokili endima ete ezali Yo nde otindaki Ngai.

03 Ba-Efeso 5:31-32

Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, mpe akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko. Ezali wana na mabombami minene, kasi ngai nazali koloba na tina na Klisto mpe Lingomba.

04 Barome 12:5

ndenge wana mpe tozali nzoto moko kati na Klisto atako tozali ebele, mpe moko na moko kati na biso azalaka eteni ya nyonso mosusu.

05 Bagalatia 3:28

Bokeseni ezali lisusu te kati na Bayuda mpe Bagreki, kati na bawumbu mpe bansomi, kati na mibali mpe basi; pamba te bino nyonso bozali se moto moko kati na Yesu-Klisto.

06 Ba-Efeso 4:4-6

Nzoto ezali se moko, Molimo mpe azali se moko, ndenge kaka Nzambe abenga bino na elikya se moko. Nkolo azali se moko, kondima mpe ezali se moko, libatisi mpe ezali se moko. Nzambe azali se moko, azali mpe Tata ya bato nyonso; aleki bato nyonso, asalaka na nzela ya bato nyonso mpe azali kati na bato nyonso.

07 Yoane 17:22-23

Nasaleli bango ngolu ya kobika nkembo na Yo ndenge kaka osalaki mpo na Ngai, mpo ete bazala moko ndenge biso mpe tozali moko: Ngai kati na bango, mpe Yo kati na Ngai. Ezali kaka na nzela wana nde bakokoka kozala penza moko, mpo ete mokili eyeba penza ete Yo nde otindaki Ngai, mpe ete olingaka bango ndenge olingaka Ngai.

Bantína oyo etali