Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kolanda Yesu

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Kolanda Yesu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Luka 9:23

Bongo Yesu alobaki na bango nyonso: — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya, kokamata ekulusu na ye mokolo na mokolo mpe kolanda Ngai.

02 Yoane 10:27

Bameme na Ngai eyokaka mongongo na Ngai. Nayebi bameme na Ngai, mpe yango elandaka Ngai.

03 Matayo 4:19

Yesu alobaki na bango: « Bolanda Ngai, mpe nakokomisa bino balobi bato. »

04 Yoane 12:26

Tika ete moto oyo alingi kosalela Ngai alanda Ngai! Epai Ngai nakozala, mosali na Ngai mpe akozala wana. Tata na Ngai akokumisa moto oyo asalelaka Ngai.

05 Malako 8:34

Yesu abengaki ebele ya bato mpe bayekoli na Ye, alobaki na bango: — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.

06 Yoane 8:12

Yesu alobaki lisusu na bato: — Nazali pole ya mokili; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.

07 1 Petelo 2:21

Nzambe abengaki bino na komona pasi yango, pamba te Klisto mpe amonaki pasi mpo na bino; boye atikelaki bino ndakisa mpo ete bolanda banzela na Ye.

08 Matayo 16:24

Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.

Bantína oyo etali