Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kati na Klisto

Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Kati na Klisto mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 2 Bakolinto 5:17

Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika: makambo ya kala eleki, mpe makambo ya sika eyei.

02 Bagalatia 2:20

boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.

03 Barome 8:1

Yango wana sik’oyo, etumbu ezali lisusu te mpo na bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto.

04 Ba-Efeso 1:3

Tika ete lokumu epesamela Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo, mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto.

05 2 Bakolinto 5:21

Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »

06 Barome 8:39

banguya ya likolo to ya se ya mabele to eloko mosusu oyo Nzambe akela, eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.

07 1 Bakolinto 1:30

Ezali mpo na Nzambe nde bozali kati na Yesu-Klisto oyo akomaki, mpo na biso, bwanya kowuta na Nzambe, bosembo, libulisi mpe kokangolama,

08 Ba-Efeso 2:10

Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe: Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango.

09 2 Bakolinto 1:20

Pamba te bilaka nyonso ya Nzambe ezalaka « iyo » kati na Klisto; mpe ezali na nzela na Ye Klisto nde tolobaka « amen » mpo na nkembo ya Nzambe.

10 Bafilipi 3:9

mpe bakuta ngai kati na Ye. Nakomi moto ya sembo mpo ete nandimeli Klisto: Nzambe akomisi ngai moto ya sembo na nzela ya kondima. Ezali lisusu te na nzela ya kotosa Mibeko ndenge nazalaki kokanisa kala.

11 Barome 12:5

ndenge wana mpe tozali nzoto moko kati na Klisto atako tozali ebele, mpe moko na moko kati na biso azalaka eteni ya nyonso mosusu.

12 Ba-Efeso 1:7

Kati na Klisto, tozwi lisiko na nzela ya makila na Ye, mpe bolimbisi ya masumu, kolanda bomengo ya ngolu ya Nzambe

13 1 Bakolinto 15:22

ndenge bato nyonso bakufaka kati na Adamu, ndenge wana mpe bato nyonso bakozwa bomoi kati na Klisto;

Bantína oyo etali