Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bozongi ya mwana ya bilema

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Bozongi ya mwana ya bilema mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Luka 15:18-20

Nazwi mokano ya kobima mpe kozonga epai ya tata na ngai; nakoloba na ye: ‹ Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo. Nabongi lisusu te kobengama mwana na yo; zwa ngai lokola moko kati na basali na yo! › » Boye, abimaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Wana azalaki nanu mosika, tata na ye amonaki ye, ayokelaki ye mawa mingi; apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye, amibwakaki na nzoto na ye mpe ayambaki ye.

02 Luka 15:7

Na nzela yango, nazali koloba na bino: esengo oyo ekozala kati na Likolo mpo na mosumuki moko kaka oyo abongoli motema, eleki esengo mpo na bato ya sembo tuku libwa na libwa oyo bazali na posa te ya kobongola mitema.

03 Luka 15:21-24

Mwana alobaki na tata na ye: « Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo, nabongi lisusu te kobengama mwana na yo. » Kasi tata alobaki na basali na ye: « Bomema na lombangu nzambala oyo eleki kitoko mpe bolatisa ye yango; bolatisa ye lopete, na mosapi, mpe basandale, na makolo na ye. Boya na mwana ngombe ya mafuta mpe boboma yango; tolia mpe tosala feti, pamba te mwana na ngai, oyo bozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi; abungaki, kasi amonani! » Boye babandaki feti na esengo makasi.

04 Banzembo 51:17

Nkolo, fungola bibebu na ngai, mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.

05 Ezayi 55:7

Tika ete moto mabe atika banzela na ye, mpe tika ete mosumuki atika makanisi na ye; tika ete azonga epai na Yawe mpo ete ayokela ye mawa, tika ete azonga epai ya Nzambe na biso, pamba te alimbisaka kaka.

06 Luka 15:10

Na nzela yango, nazali koloba na bino: ba-anjelu ya Nzambe basepelaka mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema.

07 Luka 15:32

Kasi tosengelaki kaka kosala feti mpe kosepela, pamba te ndeko na yo, oyo ozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi; abungaki, kasi amonani! »

08 Banzembo 103:13

Ndenge tata alingaka makasi bana na ye, ndenge wana mpe Yawe alingaka makasi bato oyo batosaka Ye;

09 Jeremi 31:18-20

Nayoki kolelalela ya Efrayimi: ‹ Opesi ngai etumbu lokola mwana ngombe ya mobali oyo ezali na liboma, mpe etumbu yango ekweyelaki ngai. Zongisa ngai, mpe nakozonga, pamba te ozali Yawe, Nzambe na ngai. Nabungaki nzela, kasi nabongoli motema; sik’oyo nasili kososola, nazali kobeta tolo na pasi na motema. Nayokisamaki soni mpe nasambwaki, pamba te namemaki bozoba ya bolenge na ngai. › Efrayimi azali penza mwana na Ngai ya bolingo, mwana oyo nasepelaka na ye mingi te. Nzokande napamelaka ye tango nyonso, mpe nakanisaka ye tango nyonso. Yango wana, motema na Ngai esepelaka na ye, mpe nayokelaka ye mawa, » elobi Yawe.

10 Oze 14:4

Asiri akokoka kobikisa biso te; tokomata na mpunda ya bitumba te mpe tokoloba lisusu te na misala ya maboko na biso: ‹ Bozali banzambe na biso, › pamba te ezali Yo, Yawe, nde oyokelaka mwana etike mawa. »

Bantína oyo etali