Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bolimbisi ya masumu
Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Bolimbisi ya masumu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Soki toyamboli masumu na biso, Nzambe akolimbisa biso mpe akopetola biso na mabe nyonso, pamba te azali Sembo mpe Moyengebene.
Kati na Klisto, tozwi lisiko na nzela ya makila na Ye, mpe bolimbisi ya masumu, kolanda bomengo ya ngolu ya Nzambe
oyo, kati na Ye, tozwi lisiko mpe bolimbisi ya masumu.
Basakoli nyonso batatolaki na tina na Ye ete moto nyonso oyo akondimela Ye akozwa bolimbisi ya masumu na nzela ya Kombo na Ye.
Nzambe nini akokani na Yo, Yo oyo olimbisaka masumu ya bato mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo? Okangelaka bato kanda mpo na libela te, kasi osepelaka kotalisa bango ngolu. Solo, okoyokela biso lisusu mawa, matambe na Yo ekonyata masumu na biso, mpe okobwaka mabunga na biso nyonso kati na bozindo ya ebale monene.
ndenge este ezali mosika ya weste, ndenge wana mpe abwakaka masumu na biso mosika na biso.
Boya sik’oyo, tosilisa likambo, » elobi Yawe. « Ezala masumu na bino ezali motane makasi, ekokoma pembe lokola mvula ya pembe; ata ezali motane lokola ngola, ekokoma lokola bapwale ya meme.
Bino oyo bozalaki bakufi kati na masumu na bino mpe kati na bozangi kokatisa ngenga ya nzoto na bino, Nzambe akomisaki bino bato ya bomoi elongo na Klisto. Alimbisaki masumu na biso nyonso, apasolaki mokanda oyo mibeko na yango ekatelaki biso etumbu, asilisaki bokonzi ya mibeko yango, wana abakaki yango na ekulusu.
nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. › »
« Esengo na bato oyo mabe na bango elimbisami, mpe masumu na bango elongwe! Esengo na moto oyo Nkolo atangelaka lisumu te! »
mpe, na Kombo na Ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yelusalemi, ete babongola mitema mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu. »
Nzembo ya Davidi. Esengo na moto oyo mabe na ye elimbisami, mpe masumu na ye elongwe!
ezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele, mpo ete masumu na bango elimbisama.
Bongo na sima, abakisaki: « Nakokanisa lisusu te, ezala masumu na bango to mabe na bango. » Nzokande, soki Nzambe alimbisi moto masumu, ezalaka lisusu te na likabo ya kopesa mpo na masumu.