Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mawa engebene na Nzambe

Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Mawa engebene na Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 2 Bakolinto 7:10

Mawa oyo ewutaka na mokano ya Nzambe ememaka moto na kobongola motema, mpe kobongola motema ememaka na lobiko, mpe bayokelaka yango pasi na motema te. Kasi mawa oyo ewutaka na baposa ya mokili ememaka na kufa.

02 Banzembo 51:17

Nkolo, fungola bibebu na ngai, mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.

03 Joeli 2:13

Bopasola mitema na bino, kasi bilamba na bino te. Bozonga epai na Yawe, Nzambe na bino, pamba te atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo, abongolaka mokano na Ye ya kotindela bato pasi.

04 Jake 4:9-10

Botala pasi na bino, bosala matanga mpe bolela. Tika ete koseka na bino ebongwana kolela, mpe esengo na bino ekoma mawa! Bomikitisa liboso ya Nkolo, mpe Nkolo akotombola bino.

05 Luka 18:13

Kasi mofutisi mpako atelemaki mwa mosika; amekaki ata te kotombola miso na ye na likolo, kasi atiaki loboko na ye na tolo mpe alobaki: « Oh Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te nazali moto ya masumu! »

06 Banzembo 34:18

Tango bato ya sembo babelelaka, Yawe ayokaka mpe akangolaka bango na pasi na bango nyonso.

07 Ezayi 57:15

Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi: « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.

08 Matayo 5:4

Esengo na bato oyo bazali kolela, pamba te bakobondisama!

09 Banzembo 38:18

Pamba te nakomi pene ya kokweya, pasi na ngai ezali kaka elongo na ngai tango nyonso.

10 Neyemi 8:9-10

Bato nyonso bazalaki kolela, wana bazalaki koyoka maloba ya Mibeko. Moyangeli Neyemi mpe Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko, elongo na Balevi oyo bazalaki kolimbolela bato Mibeko balobaki na bato nyonso: — Mokolo ya lelo ezali bule mpo na Yawe, Nzambe na biso; botika kosala matanga mpe botika kolela! Neyemi alobaki na bango lisusu: — Sik’oyo, bokende, bolia bilei ya kitoko, bomela masanga ya kitoko mpe botinda ndambo epai ya bato oyo bazangi eloko ya kolamba, pamba te mokolo oyo ezali bule mpo na Nkolo na biso. Boye bozala na mawa te, pamba te esengo ya Yawe ezali makasi na bino.

11 Joeli 2:12

« Ezala sik’oyo, » elobi Yawe, « bozonga epai na Ngai na mitema na bino mobimba, na kokila bilei, na mpinzoli mpe na kolela. »

12 Banzembo 6:6

Pamba te bakufi bakoki lisusu te kotatola Kombo na Yo te! Mpe kati na mboka ya bakufi, nani akoki kokumisa Yo?

13 Esidrasi 10:1

Wana Esidrasi azalaki kobondela mpe kotubela masumu, azalaki ya kofukama mpe azalaki kolela liboso ya Ndako ya Nzambe. Ebele ya bana ya Isalaele: mibali, basi mpe bana, basanganaki pene na ye mpe, bango nyonso, bazalaki kolela makasi.

14 Jeremi 31:19

Nabungaki nzela, kasi nabongoli motema; sik’oyo nasili kososola, nazali kobeta tolo na pasi na motema. Nayokisamaki soni mpe nasambwaki, pamba te namemaki bozoba ya bolenge na ngai. ›

Bantína oyo etali