Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Lokola ɛsti ezali mosika
Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Lokola ɛsti ezali mosika mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
ndenge este ezali mosika ya weste, ndenge wana mpe abwakaka masumu na biso mosika na biso.
Solo, okoyokela biso lisusu mawa, matambe na Yo ekonyata masumu na biso, mpe okobwaka mabunga na biso nyonso kati na bozindo ya ebale monene.
Ezali Ngai, Ngai kaka nde nalimbisaka masumu na yo mpo na lokumu ya Ngai moko mpe nakokanisa lisusu masumu na yo te.
Solo, pasi na ngai ebongwani esengo; na bolingo na Yo, obateli ngai longwa na libulu na kufa; obwaki masumu na ngai nyonso sima na mokongo na yo.
Moko te akoteya lisusu moninga na ye to ndeko na ye na koloba: ‹ Yeba Yawe! › Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, kobanda na mwana moke kino na mokolo, » elobi Yawe, « nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. »
Nzambe nini akokani na Yo, Yo oyo olimbisaka masumu ya bato mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo? Okangelaka bato kanda mpo na libela te, kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.
Yawe, soki obosanaka masumu te, Nkolo, nani akokaki kotelema? Kasi bolimbisi ezali epai na Yo, yango wana basengeli kotosa Yo.
nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. › »