Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Masumu ekokanisama lisusu te

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Masumu ekokanisama lisusu te mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ba-Ebre 8:12

nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. › »

02 Ezayi 43:25

Ezali Ngai, Ngai kaka nde nalimbisaka masumu na yo mpo na lokumu ya Ngai moko mpe nakokanisa lisusu masumu na yo te.

03 Jeremi 31:34

Moko te akoteya lisusu moninga na ye to ndeko na ye na koloba: ‹ Yeba Yawe! › Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, kobanda na mwana moke kino na mokolo, » elobi Yawe, « nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. »

04 Ba-Ebre 10:17

Bongo na sima, abakisaki: « Nakokanisa lisusu te, ezala masumu na bango to mabe na bango. »

05 Mishe 7:19

Solo, okoyokela biso lisusu mawa, matambe na Yo ekonyata masumu na biso, mpe okobwaka mabunga na biso nyonso kati na bozindo ya ebale monene.

06 Banzembo 103:12

ndenge este ezali mosika ya weste, ndenge wana mpe abwakaka masumu na biso mosika na biso.

07 Ba-Ebre 10:18

Nzokande, soki Nzambe alimbisi moto masumu, ezalaka lisusu te na likabo ya kopesa mpo na masumu.

08 Ezayi 38:17

Solo, pasi na ngai ebongwani esengo; na bolingo na Yo, obateli ngai longwa na libulu na kufa; obwaki masumu na ngai nyonso sima na mokongo na yo.

09 Mishe 7:18

Nzambe nini akokani na Yo, Yo oyo olimbisaka masumu ya bato mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo? Okangelaka bato kanda mpo na libela te, kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.

10 Barome 4:8

Esengo na moto oyo Nkolo atangelaka lisumu te! »

Bantína oyo etali